Nzembo 63
Boboto ya Nzambe eleki bomoi na motuya
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.
Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ;
nazali koluka Yo,
molimo na ngai ezali na posa na Yo,
bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi,
kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.
 
Natalaki Yo kati na Esika ya bule
mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.
Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi,
bibebu na ngai ekosanzola Yo.
Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba,
nakotombola maboko na ngai
mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Nakotonda lokola moto oyo asili kolia
misuni kitoko mpe mafuta ;
bibebu na ngai ekoganga na esengo
mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
 
Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai,
nasambelaka Yo na butu ;
pamba te ozali lisungi mpo na ngai,
mpe nagangaka na esengo
wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.
Nakangami na Yo ;
loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi.
 
10 Bato oyo balukaka koboma ngai
bakozinda na mabele
11 Bakoboma bango na mopanga
mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.
 
12 Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe ;
moto nyonso oyo alapaka ndayi
na Kombo ya Nzambe
akomikumisa mpo na yango,
pamba te minoko ya bakosi ekokangama.