Nzembo 64
Batela ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Oh Nzambe, yoka mongongo na ngai
kati kolela na ngai,
batela ngai mosika ya monguna
oyo azali kopesa ngai somo.
 
Bomba ngai mosika ya mikano ya bato mabe,
mosika ya makita ya bato ya misala mabe.
Bapelisaka lolemo na bango
ndenge bapelisaka mopanga,
babimisaka maloba ya bololo lokola makonga
mpo na kobwakela, na kobombama,
moto oyo azangi pamela ;
babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata.
Balendisanaka mpo na mabongisi mabe,
bayokanaka kotia mitambo ;
balobaka : « Nani akomona yango ? »
Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe,
balobaka : « Toselingwi na mabongisi na biso ! »
Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi.
 
Kasi Nzambe akobwakela bango
makonga na Ye na mbalakata ;
ekozwa mpe ekozokisa bango.
Maloba na bango moko ekobalukela bango
mpe ekomema bango na libebi ;
mpe moto nyonso oyo akomona bango
akoningisa moto.
10 Bato nyonso bakokoma kobanga,
kopanza sango ya misala ya Nzambe
mpe kososola makambo oyo asalaka.
 
11 Moto ya sembo akosepela
mpe akomibomba kati na Yawe ;
bato nyonso oyo bazali na mitema alima
bakomikumisa mpo na yango.