Nzembo 66
Lokumu na Nzambe oyo akangoli biso
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo.
Bino bato ya mokili mobimba,
bobetela Nzambe maboko !
Boyemba banzembo ya lokumu
mpo na nkembo ya Kombo na Ye,
bopesa lokumu na Ye nkembo.
Boloba na Nzambe :
« Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango !
Mpo na nguya monene na Yo,
banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.
Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo ;
bayembaka mpo na lokumu na Yo,
basanzolaka Kombo na Yo. »
 
Boya kotala misala ya Nzambe !
Misala na Ye ya minene mpo na bana ya bato ebongi na kobanga yango.
Abongolaki ebale monene mabele ya kokawuka ;
bakatisaki ebale na makolo ekawuka.
Tozali kosepela kati na Ye.
Na nguya na Ye, akonzaka mpo na libela ;
miso na Ye ekengelaka bikolo.
Tika ete batomboki batombokela Ye te.
 
Bino bikolo, bopambola Nzambe na biso !
Bosala ete lokito ya masanzoli na Ye eyokana !
Asalaka ete totangama kati na bato ya bomoi.
Abatelaki makolo na biso mpo ete tokweya te.
10 Pamba te, Nzambe, omekaki biso,
olekisaki biso kati na moto
ndenge basalaka mpo na palata.
11 Okangaki biso kati na motambo ;
otiaki mikumba ya kilo, na baloketo na biso.
12 Otikaki moto komatela biso na moto.
Tolekaki kati na moto mpe kati na mayi,
mpe obimisaki biso kati na yango mpo na komema biso na bofuluki.
 
13 Nakokota kati na Ndako na Yo,
nakomemela Yo makabo ya kotumba,
nakokokisa bandayi na ngai epai na Yo.
14 Bandayi oyo bibebu na ngai moko etatolaki
mpe monoko na ngai elobaki na tango nazalaki kati na pasi.
15 Lokola bambeka ya kotumba, nakobonzela Yo
banyama minene, bameme elongo na bambeka ya malasi ;
nakobonzela Yo bangombe mpe bantaba ya mibali.
 
16 Bino nyonso oyo botosaka Nzambe, boya koyoka !
Nakoyebisa bino makambo oyo asali mpo na bomoi na ngai.
17 Nabelelaki Ye na monoko na ngai,
mpe lolemo na ngai ekumisaki Ye.
18 Soki nazalaki na masumu kati na motema na ngai,
Nkolo alingaki koyoka ngai te.
19 Nzokande, Nzambe ayokaki ngai,
ayokaki na bokebi libondeli na ngai.
20 Tika ete Nzambe akumisama !
Aboyaki te koyoka libondeli na ngai
mpe kotalisa ngai bolingo na Ye.