Nzembo 67
Tika ete bikolo nyonso ekumisa Nzambe
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo.
Tika ete Nzambe asalela biso ngolu
mpe apambola biso,
tika ete angengisela biso elongi na Ye ;
mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili,
mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.
 
Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;
tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
Tika ete bato basepela,
tika ete babeta milolo ya esengo,
pamba te okambaka bikolo na bosembo,
mpe otambolisaka bato awa na mabele.
Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;
tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
 
Mabele eboti bambuma na yango ;
tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.
Tika ete Nzambe apambola biso ;
tika ete mokili mobimba etosa Ye !