Nzembo 74
Bileli mpo na kobebisama ya Tempelo
Nzembo ya Azafi.
Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso
mpo na tango nyonso ?
Mpo na nini kongalisa kanda na Yo
likolo ya etonga oyo oleisaka ?
Kanisa lisusu lisanga ya bato na Yo,
oyo osikola wuta kala,
libota oyo okomisa libula na Yo.
Kanisa ngomba Siona epai wapi ovandaka.
Tika ete matambe na Yo ekoma
kino na bisika oyo ebebi nye !
Kati na Esika na Yo ya bule,
monguna abebisi nyonso ;
bayini na Yo bagangi lokola nkosi,
ata kati na esika oyo okutanaka na biso,
batelemisi bendele na bango lokola elembo.
Bazali lokola bato oyo basimbi bipasola
mpe bazali kokata banzete kati na zamba.
Babuki-buki bililingi nyonso
oyo batobola na mabaya,
na nzela ya bipasola mpe bamarto na bango ;
batumbi Esika na Yo ya bule,
bakweyisi mpe bakomisi mbindo
esika oyo Kombo na Yo evandaka.
Bazalaki komilobela :
« Tokopanza yango nyonso ! »
Kati na mokili, bazikisi esika nyonso
epai wapi bagumbamelaka Nzambe.
Tozali lisusu komona te bilembo na biso,
basakoli bazali lisusu te ;
mpe moko te kati na biso ayebi tango boni
makambo oyo ekowumela.
10 Oh Nzambe, kino tango nini
monguna akofinga Yo ?
Boni, akokoba tango nyonso
kotiola Kombo na Yo ?
11 Mpo na nini ozongisi loboko na Yo na sima,
loboko na Yo ya mobali ?
Mpo na nini okangi maboko na Yo ?
 
12 Nzokande, Yo Nzambe,
ozali Mokonzi na ngai wuta kala ;
Yo nde omemaka lobiko kati na mokili.
13 Yo nde opasolaki ebale na nguya na Yo,
opanzaki mito ya bilima ya mayi ;
14 Yo nde opanzaki mito ya Leviatani
mpe opesaki yango lokola bilei
epai ya banyama ya esobe ;
15 Yo nde osalaki ete bitima ya mayi
mpe miluka etiola,
mpe okawusaki bibale mpo na libela.
16 Moyi ezali ya Yo, butu mpe ezali ya Yo ;
Yo nde osalaki sanza mpe moyi.
17 Ezali Yo nde otiaki bandelo nyonso ya mokili,
Yo nde osalaki tango ya malili
mpe tango ya moyi.
 
18 Yawe, kobosana te ete monguna afingi Yo,
ete bato bazanga tina batioli Kombo na Yo !
19 Kokaba te bomoi ya ebenga na Yo
na monoko ya nyama oyo ezali na nzala,
kobosana te mpo na libela bomoi ya babola
oyo bazali bato na Yo !
 
20 Tala lisusu Boyokani na Yo !
Pamba te, kati na mokili,
bisika ya molili ekomi ebele,
etondi na makambo na kanza.
21 Sala ete moto oyo bazali konyokola
azwa lisusu lokumu !
Sala ete mobola mpe moto akelela
bakumisa Kombo na Yo.
 
22 Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo !
Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yo
mikolo nyonso !
23 Kobosana te makelele ya bayini na Yo,
mangungu ya banguna na Yo,
oyo ezali kaka komata se komata !