Buku ya misato
73
Nz 73.1–89.53
Mpo na nini bato mabe bakendaka liboso ?
Nzembo ya Azafi.
Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele,
mpo na bato oyo bazali mitema peto.
 
Nzokande mpo na ngai,
etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka,
etikalaki moke ete nakweya,
pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu
tango nazalaki komona kimia ya bato mabe.
 
Kino na kufa na bango,
bazalaka na mitungisi te,
nzoto na bango ezalaka sembesembe.
Kati na bango, moko te amonaka pasi
oyo bato nyonso bamonaka ;
babelaka te bokono oyo ezwaka bato.
Yango wana, lolendo ekoma
lokola mayaka na bakingo na bango,
mpe makambo na kanza ekoma
lokola elamba na bango.
Miso na bango engengaka
na bilongi etonda na mafuta ;
mitema na bango esalaka kaka
mabongisi ya mabe ;
batiolaka mpe balobaka mabe,
bagangelaka minyoko.
Minoko na bango etombokelaka Likolo,
mpe lolemo na bango esakanelaka mokili.
 
10 Yango wana bato balandaka bango
mpe bamelaka maloba na bango lokola mayi.
11 Balobaka : « Nzambe akoyeba ndenge nini ?
Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi ? »
 
12 Tala ndenge bato mabe bazalaka :
tango nyonso, bazalaka na mitungisi te,
mpe bomengo na bango emataka se komata.
 
13 Solo, ezali kaka na pamba nde
nabatelaki motema na ngai peto ;
ezali kaka na pamba nde
nasukolaki maboko na ngai
mpo ete nasala mabe te !
14 Mikolo nyonso, nanyokwamaka ;
mpe tongo nyonso, nazwaka etumbu.
 
15 Soki nalobi : « Nakoloba lokola bango, »
wana nateki penza lokumu ya libota na Yo.
 
16 Tango nakanisaki mpo na koluka kososola,
nayokaki pasi na motema
17 kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambe
mpe nasosolaki ndenge nini bakosuka.
 
18 Solo, otielaka bango biloko ya moselu,
okweyisaka bango kati na libebi.
19 Ndenge nini babebisamaka mbala moko,
bakomaka na suka,
mpe somo elimwisaka bango !
20 Ndenge ndoto elimwaka
soki moto alamuki na pongi,
Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango
tango kaka otelemaka.
 
21 Tango motema na ngai ezalaki kotomboka
mpe molimo na ngai emitungisaki,
22 nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba,
nakomaki lokola nyama liboso na Yo.
 
23 Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo ;
osimba ngai na loboko na ngai ya mobali.
24 Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo,
mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.
25 Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngai
soki Yo te ?
Mpe awa na mokili, nasepela na nani
soki na Yo te ?
26 Nzoto na ngai ekoki kobeba,
mpe motema na ngai ekoki kolemba ;
kasi Nzambe azali Libanga
mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
 
27 Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa ;
obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te.
28 Kasi mpo na ngai, ezali malamu
kozala pene ya Nzambe.
Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai,
mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso.