Nzembo 76
Nzambe azali molongi
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba na lindanda. Nzembo ya Azafi.
Nzambe ayebani kati na Yuda ;
Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.
Ndako na Ye ya kapo ezali na Salemi ;
mpe esika na Ye ya kovanda ezali na Siona.
 
Ezali kuna nde abukaki makonga ya makasi,
banguba, mipanga
mpe bibundeli nyonso ya bitumba.
Ozali kongenga lokola mwinda,
otonda na lokumu koleka bangomba
ya babotoli bomengo ya bitumba.
 
Bilombe nyonso ya mpiko bakweyisamaki,
balalaki pongi na bango ya suka ;
basoda nyonso bakokaki lisusu te kotombola maboko.
Nzambe ya Jakobi, na kanda na Yo,
bato oyo babundaka likolo ya bampunda
elongo na bampunda bakweyi na somo.
Solo, ozali somo !
Nani akokoka kotelema liboso na Yo soki osiliki ?
 
Wuta na likolo, osalaka ete mokano na Yo
eyokana na matoyi ya bato ;
mokili ekomaka na kobanga mpe evandaka kimia
10 tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa
mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.
11 Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo,
mpe olataka kanda ya batikali.
 
12 Epai ya Yawe, Nzambe na bino,
bopesa bilaka mpe bokokisa yango.
Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Ye
bamemela Nzambe ya somo makabo !
13 Abukaka lolendo ya bakambi,
mpe bakonzi ya mokili babangaka Ye.