Nzembo 77
Nzambe abongwani to te ?
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Azafi.
Nabelelaka Nzambe na koganga ;
nabelelaka Nzambe mpo ete ayoka ngai !
Tango nazalaka na pasi, nalukaka Nkolo ;
na butu, nalembaka te kotombola maboko na ngai
mpe naboyaka kobondisama.
 
Nakanisaka Nzambe mpe nalelaka,
nakotaka na mozindo ya makanisi
mpe nalembaka nzoto.
 
Opimelaka miso na ngai pongi,
namitungisaka mpe nayebaka lisusu te
eloko ya koloba.
Nakanisaka lisusu mikolo ya kala,
mibu nyonso oyo eleka ;
Na butu, nakanisaka lisusu banzembo na ngai ;
motema na ngai ezongelaka kokanisa,
mpe molimo na ngai ekomaka komituna :
« Boni, Nkolo akobwaka biso penza
mpo na libela ?
Akosalela biso lisusu bolamu te ?
Bolingo na Ye esili penza mpo na libela ?
Bilaka na Ye ekokokisama te mpo na libela ?
10 Nzambe abosani solo kosala ngolu ?
Akangi penza motema na Ye mpo na kanda ? »
 
11 Mpe namilobelaka :
« Tala likambo oyo ezali kosala ngai pasi :
loboko ya mobali ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo
ebongwani ! »
12 Nakanisaka misala minene ya Yawe,
bikamwa na Yo ya kala.
13 Nakanisaka nyonso oyo osalaki
kino na bikamwa na Yo.
 
14 Oh Nzambe, banzela na Yo ezali bule ;
nzambe nini akokani na Yo na monene ?
15 Ozali Nzambe oyo asalaka bikamwa ;
olakisi nguya na Yo kati na bikolo.
16 Na nguya ya loboko na Yo,
okangolaki bato na Yo,
bakitani ya Jakobi mpe ya Jozefi.
 
17 Oh Nzambe, mayi emonaki Yo !
Mayi emonaki Yo mpe ekomaki kolenga ;
ezala mozindo ya mayi eninganaki.
18 Mapata esopaki mayi ebele,
likolo eyokisaki lokito ya kake,
mpe makonga na Yo ezalaki koleka-leka
na bangambo nyonso.
19 Na lokito ya kake na Yo,
mikalikali engengisaki mokili,
mabele eninganaki mpe elengaki.
20 Opasolaki nzela kati na ebale monene,
balabala na Yo kati na mayi monene,
mpe moto moko te amonaki bilembo
ya matambe na Yo.
21 Otambolisaki bato na Yo lokola etonga,
na loboko ya Moyize mpe ya Aron.