Nzembo 83
Telemela banguna na Yo
Nzembo ya Azafi.
Oh Nzambe, kovanda nye te !
Nzambe, kokanga monoko na Yo te,
kotikala kimia te !
Tala ndenge banguna na Yo bazali kotomboka ;
tala ndenge bayini na Yo bazali kotombola
mito na bango !
Bazali kosalela bato na Yo likita,
kokanela bato oyo obatelaka.
Bazali koloba : « Boya, toboma bango nyonso
mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te,
mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »
 
Basangani mpe bayokani,
basali boyokani mpo na kotelemela Yo :
bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli,
bato ya Moabi mpe bato ya Agari,
Gebali, Amoni mpe Amaleki,
bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.
Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango
mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.
 
10 Sala bango ndenge osalaki Madiani,
ndenge osalaki Sisera mpe Yabini,
kuna na mayi ya Kishoni.
11 Babebisamaki na Eyini-Dori,
bakomaki lokola matiti ya kopola mpo na mabele.
12 Sala bato na bango ya lokumu
ndenge osalaki Orebi mpe Zeebi ;
mpe sala bakambi na bango
ndenge osalaki Zeba mpe Tsalimuna
13 oyo bazalaki koloba :
« Tobotola mabele ya Nzambe ! »
 
14 Nzambe na ngai, balola bango
lokola matiti oyo mopepe ezali kopumbwisa.
15 Ndenge moto ezikisaka zamba,
ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,
16 landa bango na nzela ya mopepe na Yo
mpe bangisa bango
na nzela ya mopepe makasi na Yo !
 
17 Yawe, tondisa bilongi na bango na soni
mpo ete baluka Kombo na Yo !
18 Tika ete soni mpe somo makasi elata bango
mpo na libela !
Tika ete bakufa na soni !
19 Tika bayeba ete Yo,
oyo Kombo na Yo ezali Yawe,
ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo
kati na mokili mobimba !