Nzembo 82
Nzambe asambisaka bakambi ya bikolo
Nzembo ya Azafi.
Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye,
azali kokata makambo kati na banzambe.
 
Kino tango nini bokokata makambo
na bosembo te
mpe bokokotela bato mabe ?
 
Bolongisa moto oyo azangi makasi
mpe mwana etike,
bokata likambo ya moto ya mawa
mpe ya mobola ;
bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi
mpe na mobola,
bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.
 
Bazangi boyebi mpe bososoli,
bazali koyengayenga kati na molili ;
miboko nyonso ya mokili ezali koningana.
 
Nalobaki : « Bozali banzambe,
bozali bino nyonso bana
ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! »
Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso
mpe bokweyaka lokola bakambi.
 
Nzambe, telema, sambisa mokili ;
pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.