Nzembo 85
Yawe asalelaka biso bolamu
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore.
Yawe, osalelaki mboka na Yo bolamu,
ozongisaki bato ya Jakobi,
oyo bazalaki na bowumbu,
olimbisaki mabe ya bato na Yo
mpe olongolaki masumu na bango nyonso.
 
Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasi
mpe okitisaki motema na Yo.
Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso !
Longola kanda na Yo na tina na biso !
Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ?
Okokangela penza biso kanda
mpo na tango nyonso ?
 
Okozongisela biso lisusu bomoi te
mpo ete bato na Yo basepela kati na Yo ?
Yawe, talisa biso bolingo na Yo,
mpe pesa biso lobiko na Yo !
 
Yawe,
nakoyoka maloba na Nzambe ;
pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye
mpe ya bayengebene na Ye.
Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango.
10 Solo, lobiko na Ye ezali pene ya bato
oyo batosaka Ye
mpo ete nkembo na Ye ewumela
kati na mboka na biso.
11 Bolingo mpe boyengebene ekutanaka,
bosembo mpe kimia eyambanaka.
12 Bosolo ebotaka wuta na mabele,
mpe bosembo etalaka wuta na likolo.
 
13 Ye moko Yawe akopesa esengo,
mpe mabele na biso ekobota bambuma.
14 Bosembo etambolaka liboso na Ye
mpe elakisaka nzela oyo ekolekela.