Nzembo 86
Yaka kobikisa ngai
Libondeli ya Davidi.
Yawe, yoka mpe yanola ngai ;
pamba te nazali mobola mpe moto akelela.
Batela bomoi na ngai,
pamba te nazali moyengebene na Yo.
Yo, Nzambe na ngai, bikisa ngai, mosali na Yo,
oyo natiaka elikya kati na Yo.
 
Oh Nkolo, yokela ngai mawa ;
pamba te nabelelaka Yo tango nyonso !
Nkolo, sepelisa motema na ngai,
mosali na Yo,
pamba te natombolaka molimo na ngai epai na Yo.
Nkolo, ozali malamu, olimbisaka,
otonda na bolingo mpo na bato nyonso
oyo babelelaka Yo.
Yawe, yoka losambo na ngai,
yoka libondeli na ngai !
Na mokolo ya pasi na ngai, nabelelaka Yo,
pamba te oyanolaka ngai.
 
Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo,
kati na banzambe ;
moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.
Nkolo, bikolo nyonso oyo osala
ekoya kogumbama liboso na Yo
mpe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.
10 Pamba te ozali monene mpe osalaka bikamwa ;
Yo kaka nde ozali Nzambe.
 
11 Yawe, lakisa ngai nzela na Yo,
mpe nakotambola kolanda bosolo na Yo.
Pesa ngai motema ya sembo mpo ete natosa Yo.
12 Nkolo, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo,
na motema na ngai mobimba,
nakopesa Kombo na Yo nkembo mpo na Yo libela.
13 Pamba te bolingo na Yo mpo na ngai
ezali monene,
mpe okangolaki ngai wuta na mozindo
ya mboka ya bakufi.
 
14 Nzambe, bato ya lofundu bazali kobundisa ngai,
mpe ngulupa ya bato na kanza bazali koluka
koboma ngai ; batosaka Yo ata moke te.
 
15 Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe
na mawa mpe na ngolu,
osilikaka noki te,
otonda na bolingo mpe na boyengebene.
16 Balola elongi na Yo epai na ngai
mpe yokela ngai mawa ;
pesa ngai, mosali na Yo, makasi
mpe bikisa ngai mwana ya mwasi mosali na Yo !
17 Salela ngai elembo ya boboto na Yo
mpo ete banguna na ngai bamona yango mpe bakufa soni !
Yawe, ozali Mosungi mpe Mobondi na ngai.