Nzembo 88
Libondeli ya moto oyo akomi pene ya kokufa
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na flite. Nzembo ya Emani, moto ya Ezera.
Yawe, ozali Nzambe ;
Yo nde obikisaka ngai !
Butu mpe moyi, nagangaka epai na Yo !
Tika ete losambo na ngai ekoma epai na Yo ;
Yoka koganga na ngai !
 
Pamba te bomoi na ngai etondi na pasi
mpe nakomi pene ya kokufa.
Batie ngai na molongo ya bato
oyo bazali kokende na kunda ;
nakeseni ata moke te na moto
oyo azali lisusu na makasi te.
Nakomi moko kati na bakufi,
lokola bato oyo basila kokufa na bitumba
mpe bazali sik’oyo kati na kunda,
lokola bato oyo okanisaka lisusu te,
pamba te obatelaka bango lisusu te.
 
Obwaki ngai na libulu ya mozindo makasi,
kati na mozindo ya molili.
Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai,
bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai.
 
Okaboli ngai na balingami na ngai ya motema,
okomisi ngai eloko ya nkele na miso na bango ;
nakomi lokola mokangami kati na boloko,
nakoki kobima te !
10 Miso na ngai ezali komona lisusu te mpo na pasi ;
nzokande nabelelaka Yo, Yawe,
mikolo nyonso,
natombolaka maboko na ngai epai na Yo !
 
11 Boni, okosala bikamwa mpo na bakufi ?
Boni, bakufi bakoki kotelema
mpo na kosanzola Yo ?
 
12 Boni, bolingo na Yo etatolamaka kati na kunda,
mpe bosembo na Yo, kati na mboka ya bakufi ?
13 Boni, bikamwa na Yo eyebani kati na molili,
mpe bosembo na Yo, kati na mokili
ya bato oyo babosana ?
 
14 Kasi ngai, nazali kobelela nde Yo, Yawe ;
nabondelaka Yo tongo nyonso.
15 Yawe, mpo na nini kobwaka ngai
mpe kobombela ngai elongi na Yo ?
 
16 Wuta bolenge na ngai,
nazali mobola mpe moto na pasi ;
mpe okweyiselaka ngai makambo na Yo ya somo !
Solo, elikya esili ngai !
17 Kanda makasi na Yo ebetaka ngai,
minyoko oyo ewutaka epai na Yo
ekomisaka ngai moto pamba.
18 Ezingelaka ngai mikolo nyonso,
lokola mayi, na bangambo nyonso.
19 Okaboli ngai na baninga mpe balingami na ngai,
natikali na moninga kaka moko ya motema : molili !