Nzembo 89
Wapi bolingo na Yo ya kala
Maloba ya Etani, moto ya Ezera.
Nakoyemba tango nyonso
bolingo ya Yawe ;
monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo
libela na libela.
Solo, nazali kotatola yango :
« Miboko ya bolingo na Yo ezali na suka te ;
ovandisi boyengebene na Yo kati na likolo. »
 
Olobaki : « Nasali boyokani
elongo na moponami na ngai,
nalapi ndayi epai ya mosali na ngai, Davidi :
‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi
mpo na tango nyonso
mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi
mpo na seko. › »
 
Yawe, Lola esanzolaka
misala na Yo ya kokamwa
mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.
Nani akokani na Yawe kuna na likolo ?
Nani akokani na Yawe
kati na mampinga ya likolo ?
 
Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu ;
solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
nani azali na nguya lokola Yo ?
Nani, oh Yawe ?
Boyengebene na Yo ezingeli Yo.
 
10 Yo nde okonzaka lolendo ya ebale monene
mpe okitisaka bambonge na yango soki etomboki.
 
11 Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito,
kino koboma ye ;
mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.
 
12 Likolo ezali ya Yo ; mabele mpe ezali ya Yo !
Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.
13 Yo nde okela Nor mpe Sude ;
Tabori mpe Erimoni egangaka na esengo
mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
 
14 Loboko na Yo ezali na makasi,
loboko na Yo ezali na nguya,
loboko na Yo ya mobali oyo otombola.
15 Bosembo mpe alima ezali miboko ya
Kiti ya Bokonzi na Yo,
boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.
 
16 Esengo na bato oyo bayebi kobetela Yo maboko !
Yawe, batambolaka na pole ya elongi na Yo,
17 basepelaka mikolo nyonso na Kombo na Yo,
basanzolaka bosembo na Yo.
18 Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango ;
mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.
19 Yawe azali nguba na biso ;
Mosantu ya Isalaele azali Mokonzi na biso.
 
20 Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo
kati na emoniseli :
« Nasungaki elombe moko ya bitumba,
natombolaki elenge mobali moko
kati na bato na ngai ;
21 namonaki Davidi, mosali na ngai ;
napakolaki ye mafuta na ngai ya bule.
22 Nakobatela ye na loboko na ngai ya nguya,
mpe loboko na ngai ekokomisa ye makasi.
23 Monguna akobimela ye ata moke te na pwasa,
moto mabe akokoka konyokola ye te.
24 Nakobebisa banguna na ye liboso na ye
mpe nakoboma bayini na ye.
 
25 Bolingo mpe boyengebene na ngai ekozala
elongo na ye ;
mpe na Kombo na Ngai, akotombola elongi.
26 Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye,
mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.
27 Akobelela ngai boye :
‹ Ozali Tata na ngai,
Nzambe na ngai, Libanga
mpe Mobikisi na ngai ! ›
28 Mpe ngai, nakokomisa ye mwana na ngai ya liboso,
mokonzi oyo aleki na kotombwama
kati na bakonzi ya mokili.
 
29 Nakobatela mpo na seko
bolingo na ngai mpo na ye ;
boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.
30 Nakobatela mpo na libela libota na ye ya bokonzi,
mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela
ndenge moko na likolo.
 
31 Soki bana na ye basundoli mibeko na ngai
mpe balandi bosembo na ngai te,
32 soki babuki mitindo na ngai
mpe babateli te mibeko na ngai,
33 nakopesa bango etumbu na nzela ya lingenda,
mpo na botomboki na bango,
mpe na nzela ya makofi, mpo na masumu na bango ;
34 kasi nakowangana te bolingo na ngai
mpe nakobongola te boyengebene na ngai.
 
35 Nakosambwisa te boyokani na ngai
mpe nakobongola te maloba na ngai.
36 Nalapaki yango na ndayi mbala moko
mpo na libela
na Kombo ya bosantu na ngai :
‹ Nakokosa Davidi te ! ›
37 Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela,
mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela
lokola moyi liboso na ngai.
38 Solo, lokola sanza, ekowumela na bokonzi
mpo na libela.
Motatoli oyo azali kuna kati na likolo
akoki kokosa te. »
 
39 Nzokande, obwakaki, omonaki pamba,
osilikelaki mopakolami na Yo !
40 Owanganaki boyokani oyo osalaki
elongo na mosali na Yo,
obwakaki na mabele mpe osambwisaki
motole na ye.
 
41 Otobolaki madusu kati na bamir na ye nyonso
mpe obukaki bandako na ye, oyo batonga makasi ;
42 bato nyonso oyo balekaki wana
babotolaki ye biloko,
mpe bavandi ya pembeni na ye bakomaki kotiola ye.
 
43 Obakisaki makasi ya bayini na ye
mpe otondisaki banguna na ye nyonso na esengo,
44 osalaki kutu ete mopanga na ye ebalukela ye moko
mpe osungaki ye te na bitumba ;
45 osilisaki kongenga ya lokumu na ye,
obwakaki kiti na ye ya bokonzi na mabele ;
46 okomisaki moke mikolo ya bolenge na ye
mpe olatisaki ye kazaka ya soni.
 
47 Yawe, kino tango nini ?
Okomibomba penza tango nyonso ?
Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto ?
48 Kanisa motango ya mikolo ya bomoi na ngai !
Okelaki penza bato mpo na suka
oyo ezanga ata tina !
49 Moto nani akoki kozala na bomoi
mpe azanga komona kufa ?
Nani akolonga kokima nguya ya mboka ya bakufi ?
 
50 Nkolo, wapi bolingo na Yo ya kala
oyo alakaki Davidi na boyengebene na Yo
na nzela ya ndayi ?
51 Nkolo, kanisa ndenge bazali kosakanela
basali na Yo ;
kobosana te ete namemi mokumba
ya bato oyo nyonso !
52 Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo,
oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo !
 
53 Tika ete Yawe apambolama
libela na libela !
Amen ! Amen !