Nzembo 91
Ebombamelo ya malonga
Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo
ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo
avandaka na se ya bobatelami
ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
 
Nalobaka na tina na Yawe :
« Nzambe na ngai azali ebombamelo
mpe ndako makasi na ngai ;
natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »
 
Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo
ya mokangi bandeke
mpe na bokono oyo ebikisaka te.
Abombaka yo na se ya mapapu na Ye,
mpe ozwaka ebombamelo ya malonga
na se ya mapapu na Ye ;
bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba
mpe lokola elamba ya ebende.
 
Okobanga te somo ya butu,
makonga oyo epumbwaka na moyi makasi,
bokono oyo etambolaka kati na molili
mpe pasi oyo ebebisaka na midi.
 
Ezala bato nkoto moko bakweyi
pembeni na yo,
mpe bato nkoto zomi,
na ngambo ya loboko na yo ya mobali,
ekozwa yo ata moke te.
Okotala kaka na miso na yo
mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali
kozwa etumbu lokola lifuti na bango.
 
Soki otatoli :
« Yawe azali ebombamelo na ngai, »
mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo,
10 mabe ata moko te ekokweyela yo,
pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo ;
11 pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye
ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso.
 
12 Bakomema yo na maboko na bango
mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te ;
13 okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa,
okonyata nkosi ya monene mpe dalagona.
 
14 Lokola akangami na ngai, nakokangola ye ;
lokola ayebi Kombo na Ngai, nakobatela ye.
15 Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ;
nakozala elongo na ye na tango ya pasi,
nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.
16 Nakopesa ye bomoi molayi
mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.