Buku ya minei
90
Nz 90.1–106.48
Lakisa biso kotanga malamu motango ya mikolo na biso
Losambo ya Moyize, moto na Nzambe.
Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso,
na bikeke nyonso.
Liboso ete bangomba ezala,
liboso ete okela mabele mpe mokili,
libela na libela, ozali Nzambe.
 
Ozongisaka moto na putulu,
pamba te oloba :
« Bino bato, bozonga na putulu ! »
Na miso na Yo, mibu nkoto moko ezali
lokola mokolo ya lobi oyo esili koleka,
lokola ngonga moko ya butu.
Olekisaka yango lokola pongi ya butu,
oyo na tongo, esilaka lokola lititi.
Na tongo, ebimisaka fololo mpe etelaka noki ;
kasi na pokwa, enzulukaka mpe ekawuki.
 
Kanda na Yo elembisaka biso nzoto,
mpe kanda makasi na Yo epesaka biso bobangi.
Otiaka masumu na biso liboso na Yo
mpe obimisaka na polele makambo oyo tobombaka.
 
Mikolo nyonso ya bomoi na biso elimwaka
mpo na kanda na Yo,
mpe mibu na biso esilaka lokola kolela.
10 Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala
mibu tuku sambo
to mibu tuku mwambe mpo na bato
oyo baleki makasi ;
nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko,
pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.
 
11 Nani ayebi makasi ya kanda na Yo ?
Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo
asosolaka malamu kanda makasi na Yo.
12 Lakisa biso kotanga malamu
mikolo ya bomoi na biso
mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.
 
13 Yawe, lembisa moke !
Kino tango nini ekowumela ?
Yokela basali na Yo mawa !
14 Tongo nyonso, tondisaka biso na bolingo na Yo
mpe tokoganga na esengo,
mpe tokosepela mikolo nyonso ya bomoi na biso.
 
15 Zongisela biso na mikolo ya esengo,
mikolo oyo onyokolaki biso ;
zongisela biso na mibu ya esengo,
mibu oyo tomonaki pasi.
16 Tika ete biso, basali na Yo, tomona misala na Yo ;
mpe ete bana na biso bamona kongenga makasi
ya nkembo na Yo !
17 Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso,
ezala elongo na biso !
Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso !
Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso !