Nzembo 95
Mokili mobimba ezali kati na maboko ya Yawe
Boya, toganga na esengo mpo na Yawe !
Tobetela Libanga na biso maboko,
pamba te azali Mobikisi na biso !
Tokende liboso na Ye
elongo na mabondeli ya kozongisa matondi,
tobetela Ye maboko elongo na banzembo.
 
Pamba te Yawe azali Nzambe Monene,
azali Mokonzi Monene,
na likolo ya banzambe nyonso.
Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye ;
mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye.
Ebale monene ezali ya Ye,
azali Mokeli na yango ;
mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye,
asala yango na maboko na Ye.
 
Boya, togumbama mpe tofukama,
tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe,
Mokeli na biso !
 
Pamba te azali Nzambe na biso ;
tozali bato oyo aleisaka,
etonga oyo abatelaka.
 
Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
« boyeisa mitema na bino mabanga te,
ndenge bosalaki na Meriba ;
ndenge bosalaki na mokolo wana
ya Masa kati na esobe
epai wapi batata na bino batombokelaki ngai
mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala.
 
10 Mibu tuku minei, nayinaki bato
ya ekeke wana mpe nalobaki :
‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba,
bayebaka banzela na ngai te. ›
11 Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka :
‹ Bakotikala kokota te
kati na bopemi na ngai ! › »