Nzembo 96
Mokili mobimba esanzolaka Yawe, Mokonzi na yango
(Nz 105; 106; 1Ma 16.23-33)
Boyembela Yawe nzembo ya sika !
Bino nyonso, bato ya mokili mobimba,
boyembela Yawe !
Boyembela Yawe,
bopambola Kombo na Ye !
Bopanza sango ya lobiko na Ye,
mokolo na mokolo !
Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota !
Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa
kati na bikolo nyonso.
 
Pamba te Yawe azali monene
mpe abongi na lokumu,
azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.
Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba,
nzokande Yawe akela likolo.
Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye,
nguya mpe nkembo ezali
kati na Esika na Ye ya bule.
 
Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe ;
bosanzola Yawe na kopanza
sango ya nkembo mpe nguya na Ye !
Bosanzola Yawe mpe bopesa
Kombo na Ye nkembo !
Bomema makabo na bino,
bokota na lopango na Ye !
Bogumbama liboso ya Yawe
oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi !
Bino bavandi ya mokili mobimba,
bolenga liboso na Ye !
 
10 Boloba kati na mabota :
« Yawe azali Mokonzi !
Mokili elendisama makasi, ekoningana te.
Yawe asambisaka bato na bosembo. »
 
11 Tika ete likolo esepela,
mpe mabele ezala kati na esengo !
Tika ete ebale monene elongo na nyonso
oyo ezali kati na yango epesa lokito !
12 Tika ete zamba mobimba elongo na nyonso
oyo ezali kati na yango esepela,
mpe tika ete banzete nyonso ya zamba eganga
na esengo
13 liboso ya Yawe, pamba te azali koya !
Solo, azali koya kosambisa mabele ;
akosambisa mokili na bosembo,
mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.