Nzembo 97
Nzambe Monene ya mokili mobimba
Yawe azali kokonza !
Tika ete mabele esepela ;
tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo !
 
Mapata mpe molili makasi ezingeli Ye,
bosembo mpe bosolo ezali miboko
ya Kiti na Ye ya Bokonzi.
Moto etambolaka liboso na Ye,
ezikisaka banguna na Ye, oyo bazingeli Ye.
 
Mikalikali na Ye engengisaka mokili ;
mpe tango mabele emonaka bongo, elengaka.
Bangomba enyangwamaka lokola mafuta
liboso ya Yawe,
liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.
 
Likolo epanzaka sango ya bosembo na Ye,
mpe bikolo nyonso bamonaka nkembo na Ye.
Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko,
bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta !
Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye !
 
Yawe, Siona eyoki yango mpe esepeli ;
bingumba ya Yuda ezali na esengo
mpo na mikano na Yo !
Pamba te, na mokili mobimba,
Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo ;
oleki banzambe nyonso.
 
10 Bino bato oyo bolingaka Yawe,
boyina mabe !
Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye
mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.
 
11 Moyi elonami mpo na moto ya sembo,
mpe esengo, mpo na bato
oyo bazali na mitema alima.
12 Bino bato ya sembo,
bosepela kati na Yawe ;
bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.