10
Davidi alongi bato ya Amoni mpe ya Asiri
(1Ma 19.1-19)
Sima na mwa tango, mokonzi ya bato ya Amoni akufaki, mpe mwana na ye ya mobali, Anuni, akitanaki na ye na bokonzi. Davidi amilobelaki : « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, ndenge kaka tata na ye atalisaki ngai bolamu. » Boye Davidi atindaki bato mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye.
Tango basali ya Davidi bakomaki na mokili ya bato ya Amoni, bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni, mokonzi na bango : « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo ? Ezali mpo na kononga engumba mpe kobebisa yango nde Davidi atindi bango epai na yo ? » Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango kati-kati ya mandefu, akataki bango bilamba kino na loketo mpe abenganaki bango. Tango bayebisaki Davidi likambo yango, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bato wana, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo : « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota lisusu, sima nde bokozonga. »
Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale. Tango kaka Davidi ayokaki bongo, atindaki Joabi elongo na mampinga nyonso ya basoda ya mpiko. Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba mokonzi na bango. Na tango wana, bato ya Siri ya Tsoba mpe ya Reobi elongo na basoda ya Tobi mpe Maaka bazalaki na esika mosusu, kati na zamba. Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele oyo baleki na mpiko, mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri. 10 Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi ; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni. 11 Joabi alobaki : « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai ; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakoya kosunga yo. 12 Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »
13 Bongo Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri ; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye. 14 Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi mpe bazongaki kati na engumba. Bongo, sima na Joabi kowuta kobundisa bato ya Amoni, azongaki na Yelusalemi.
15 Tango bato ya Siri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basanganaki. 16 Adadezeri atindaki bantoma kobenga bato ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale. Mpe bayaki na Elami. Tsobaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango. 17 Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele, akatisaki Yordani mpe akomaki na Elami. Bato ya Siri basalaki milongo liboso ya Davidi mpe babundisaki ye. 18 Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki bampunda nkama sambo oyo ezalaki komema bashar mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda. Davidi abetaki mpe Tsobaki, mokonzi na bango ya mampinga, mpe akufaki wana. 19 Tango bakonzi nyonso oyo bazalaki na se ya bokonzi ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na bato ya Isalaele mpe bakomaki kosalela Isalaele. Bongo bato ya Siri bakomaki kobanga kosunga bato ya Amoni.