11
Davidi mpe Batisheba
Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Davidi atindaki Joabi elongo na basali na ye mpe mampinga nyonso ya Isalaele. Babomaki bato ya Amoni mpe bazingelaki Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi. Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi. Davidi atindaki moto moko kokende koluka koyeba soki mwasi yango azali nani. Moto yango alobaki : « Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Eliami, mwasi ya Iri, moto ya Iti. » Davidi atindaki bantoma mpo na kozwa ye. Batisheba ayaki epai ya Davidi, mpe Davidi asangisaki na ye nzoto. Sima na ye komipetola na mbindo na ye, Batisheba azongaki na ndako na ye. Akomaki na zemi, mpe atindaki maloba epai ya Davidi : « Nazali na zemi. »
Davidi atindaki maloba epai ya Joabi : « Tindela ngai Iri, moto ya Iti. » Joabi atindaki Iri epai ya Davidi. Tango Iri akomaki epai na ye, Davidi atunaki ye soki Joabi azali malamu, soki basoda bazali malamu mpe soki bitumba ezali koleka ndenge nini. Bongo Davidi alobaki na Iri : « Kende na ndako na yo mpe sukola makolo na yo. »
Iri atikaki ndako ya mokonzi ; mpe sima na ye, mokonzi atindelaki ye kado. Kasi Iri alalaki na ekotelo ya ndako ya mokonzi elongo na basali nyonso ya mokonzi na ye ; akendeki te na ndako na ye. 10 Tango bayebisaki Davidi ete Iri akendeki na ndako te, atunaki ye :
— Boni, yo owuti mosika te ? Mpo na nini oboyi kozonga na ndako na yo ?
11 Iri azongiselaki Davidi :
— Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.
12 Davidi alobaki na Iri :
— Vanda lisusu awa lelo, bongo lobi nakozongisa yo.
Iri avandaki na Yelusalemi mokolo wana mpe mokolo oyo elandaki.
13 Davidi abengisaki ye. Iri aliaki mpe amelaki elongo na ye, mpe Davidi alangwisaki ye. Kasi na pokwa, Uri abimaki mpo na kokende kolala na mbeto na ye elongo na basali ya mokonzi, kasi akendeki na ndako na ye te.
14 Na tongo, Davidi akomelaki Joabi mokanda mpe atindaki yango na nzela ya Iri. 15 Kati na mokanda yango, akomaki boye : « Tia Iri na molongo ya liboso, na esika oyo bitumba ezali makasi. Mpe bino, bozonga sima na ye mpo ete babeta ye mpe akufa. »
16 Joabi oyo azalaki kokengela engumba, atiaki Iri na esika oyo ayebaki ete ezali penza na basoda ya mpiko. 17 Bongo tango bato ya engumba babimaki mpo na kobundisa Joabi, ndambo ya basoda kati na mampinga ya Davidi bakufaki ; Iri, moto ya Iti, mpe akufaki.
18 Joabi atindelaki Davidi sango nyonso ya bitumba. 19 Apesaki mitindo oyo epai ya ntoma : « Tango okosilisa kopesa sango ya bitumba epai ya mokonzi, 20 mokonzi akoki kotomboka mpe kotuna yo : ‹ Mpo na nini bopusanaki makasi pembeni ya engumba mpo na kobunda ? Boyebaki te ete bakokaki kobeta batolotolo wuta na mir ? 21 Nani abomaki Abimeleki, mwana mobali ya Yerubesheti ? Ezalaki te mwasi oyo, wuta na likolo ya mir, abwakelaki ye libanga oyo banikelaka ble, yango wana akufaki na Tebesi ? Mpo na nini bopusanaki pembeni ya mir ? › Soki atuni yo bongo, loba na ye : ‹ Mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufi. › »
22 Motindami akendeki, mpe tango akomaki, ayebisaki Davidi makambo nyonso oyo Joabi atindaki ye koloba. 23 Alobaki na Davidi :
— Bato yango bazalaki makasi koleka biso, bayaki kobundisa biso na libanda, mpe tobenganaki bango kino na ekotelo ya engumba.
24 Bongo basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki na batolotolo na bango basali na yo wuta na likolo ya mir. Ndambo ya bato ya mokonzi bakufaki, ezala mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufaki.
25 Davidi alobaki na ntoma :
— Tala makambo oyo okoloba na Joabi : « Tika ete likambo oyo etungisa yo te. Mopanga ekoki koboma songolo to pakala. Sala makasi mpo na kobundisa engumba mpe bebisa yango. » Loba makambo oyo mpo na kolendisa Joabi.
26 Tango mwasi ya Iri ayokaki ete mobali na ye akufi, asalelaki ye matanga. 27 Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te.