22
Nzembo ya Davidi
Davidi ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo. Alobaki :
Yawe azali libanga na ngai,
ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ;
azali Nzambe na ngai, libanga na ngai
mpe ebombamelo na ngai ;
azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai,
ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai.
Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe.
Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu,
mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.
Mbonge ya kufa efinaki ngai,
mpela ya libebi epesaki ngai somo,
basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai,
mitambo ya kufa ekangaki ngai.
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,
nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai.
Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye,
koganga na ngai mpo na kosenga lisungi
ekomaki kino na matoyi na Ye.
 
Mabele ekomaki koningana makasi,
miboko ya Lola elengaki mpe ebukanaki,
pamba te Yawe asilikaki.
Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye,
moto makasi elongo na makala ya moto ekomaki kobima na monoko na Ye.
10 Afungolaki Lola mpe akitaki,
mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.
11 Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki,
apepaki na mapapu ya mopepe.
12 Akomisaki molili oyo ezingelaki Ye
mpe mapata ya mwindo ya likolo, Ndako na Ye.
13 Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye
ezalaki kobimisa makala ya moto.
14 Yawe agangaki wuta na Lola,
mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki.
15 Abwakaki makonga na Ye,
mpe atindaki yango na bangambo nyonso ;
abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango.
16 Na koganga ya Yawe mpe na pema ya zolo na Ye,
nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki,
mpe miboko ya mokili emonanaki na libanda.
 
17 Atandaki loboko na Ye wuta na likolo,
akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama
oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi.
18 Akangolaki ngai wuta na maboko
ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai,
pamba te balekaki ngai na makasi.
19 Babundisaki ngai na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai,
kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.
20 Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi,
akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.
 
21 Yawe asalelaki ngai makambo wana
kolanda bosembo na ngai,
afutaki ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai.
22 Pamba te nabateli banzela ya Yawe,
napesi Nzambe na ngai mokongo te lokola bato mabe.
23 Natosaka mibeko na Ye nyonso
mpe nabatelaka bikateli na Ye.
24 Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela
mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.
25 Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai,
kolanda bopeto na ngai na miso na Ye.
 
26 Solo, otalisaka bosembo na Yo epai ya moto oyo atambolaka na bosembo,
mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela.
27 Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto,
kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.
28 Obikisaka banyokolami,
otalaka mpe okitisaka bato na lofundu.
29 Oh Yawe, ozali mwinda na ngai ;
obongolaka molili na ngai pole.
30 Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ;
mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir.
31 Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka,
Liloba na Yawe ezali na mbeba te ;
azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye
lokola ebombamelo na bango.
32 Nani azali Nzambe soki Yawe te ?
Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ?
33 Ezali Nzambe nde azali ndako na ngai ya makasi,
abatelaka nzela na ngai
mpe akomisaka yango polele liboso na ngai ;
34 akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko
mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo ;
35 alakisaka ngai kobunda,
mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.
36 Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai,
mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
37 Otambolisaka ngai na kimia,
mpe makolo na ngai elengaka te.
38 Nalandaka banguna na ngai mpe nabomaka bango,
nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango.
39 Nabebisaka bango nye,
mpe bakokaka lisusu kotelema te ;
bakweyaka na se ya matambe na ngai.
40 Opesaka ngai makasi ya bitumba,
ogumbaka banguna na ngai
mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
41 Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai,
mpe nabebisaka bayini na ngai.
42 Bagangaka mpo na koluka lisungi,
kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te ;
babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te.
43 Nanikaka bango lokola putulu ya mabele,
nafinaka bango, nanyataka bango
lokola potopoto ya nzela.
 
44 Olongisaka ngai na bitumba ya bato,
obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo.
Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.
45 Bapaya bazali koya mpo ete nasepela na bango ;
soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai.
46 Bango nyonso balembi nzoto
mpe bakomi kobima na kolenga
wuta na bandako na bango ya makasi.
47 Longonya na Yawe !
Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama !
Tika ete Nzambe, libanga ya lobiko na ngai, anetolama !
48 Azali Nzambe oyo abundelaka ngai,
oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai,
49 akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai.
Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai,
obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
50 Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo,
nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
51 Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye,
atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye,
epai ya Davidi mpe libota na ye mpo na libela.