23
Maloba ya suka
Tala maloba ya suka ya Davidi :
Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi,
moto oyo atombolama na bokonzi,
mopakolami ya Nzambe ya Jakobi,
moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele :
« Molimo na Yawe alobi na nzela na ngai,
atie maloba na Ye na monoko na ngai.
Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai :
‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe,
azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka
mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te,
lokola kongenga ya sima na mvula
oyo ebimisaka matiti na mokili. ›
Ezali bongo te mpo na libota na ngai liboso ya Nzambe,
pamba te asalaki boyokani ya libela elongo na ngai,
boyokani oyo esalema malamu na makambo nyonso,
mpe oyo Ye moko abatelaka ?
Tango nyonso mpe na makambo nyonso, apesaki ngai elonga
mpe akokisaki posa ya motema na ngai.
Kasi bato nyonso ya kilikili bazali lokola nzete ya nzube
oyo babwakaka mosika ;
basimbaka yango te na maboko pamba.
Moto oyo alingi kosimba yango
asengeli kosalela ebende to libaya ya likonga ;
batumbaka yango kaka na esika oyo ezali. »
Basoda ya mpiko ya Davidi
(1Ma 11.10-41)
Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi : Yoshebi-Bashebeti, moto ya Takimoni : azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko, abomaki na likonga bato nkama mwambe na etumba moko.
Molandi na ye ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi : azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko oyo, elongo na Davidi, babundisaki bato ya Filisitia oyo basanganaki mpo na bitumba, wana bana ya Isalaele bazalaki kokima na likolo ya bangomba. 10 Kasi ye ayikaki mpiko kati na bitumba mpe abomaki bato ya Filisitia kino alembaki, mpe loboko na ye etikaki mopanga te. Yawe apesaki bango elonga monene na mokolo wana. Mampinga bazongaki epai ya Eleazari kaka mpo na kokamata biloko ya bato oyo bakufaki.
11 Sima na ye, Shama, mwana mobali ya Age, moto ya Arari. Tango bato ya Filisitia basanganaki na Leyi epai wapi ezalaki na elanga moko etonda na misili, basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango. 12 Kasi Shama atelemaki na kati-kati ya elanga, abundelaki yango mpe abomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.
13 Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami. 14 Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki na Beteleemi.
15 Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki : « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela ? »
16 Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango ; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe. 17 Alobaki : « Tika ete Yawe apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo, pamba te ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende kokufa mpo na ngai. »
Boye, Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki.
18 Abishayi, ndeko mobali ya Joabi mpe mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka. 19 Kati na basoda misato ya mpiko, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.
20 Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya Moabi ; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi. 21 Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo asimbaki likonga na loboko na ye. Abundisaki moto yango ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko. 22 Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki. Ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko ya lisanga ya mibale. 23 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.
 
24 Kati na lisanga ya bato tuku misato, ezalaki mpe na :
Asaeli, ndeko mobali ya Joabi ;
Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi ;
25 Shama mpe Elika, bato ya Arodi ;
26 Eletsi, moto ya Peleti ;
Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa ;
27 Abiezeri, moto ya Anatoti ;
Mebunayi, moto ya Usha ;
28 Tsalimoni, moto ya Aoyi ;
Maarayi, moto ya Netofa ;
29 Elebi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa ;
Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame ;
30 Benaya, moto ya Piratoni ;
Idayi, moto ya mabwaku ya Gashi ;
31 Abi-Aliboni, moto ya Beti-Ariba ;
Azimaveti, moto ya Baarumi ;
32 Eliaba, moto ya Shaaliboni ;
Bana mibali ya Yasheni ;
Jonatan, 33 Shama, moto ya Arari ;
Ayami, mwana mobali ya Sharari, moto ya Arari ;
34 Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati ;
Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo ;
35 Etsirayi, moto ya Karimeli ;
Paarayi, moto ya Arabi ;
36 Yigali, mwana mobali ya Natan, moto ya Tsoba ;
Bani, moto ya Gadi* ;
37 Tseleki, moto ya Amoni ;
Naarayi, moto ya Beyeroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ;
38 Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri ;
39 mpe Iri, moto ya Iti.
 
Na kosangisa, bango nyonso bazalaki tuku misato na sambo.
* 23:36 Na mikanda mosusu, bakoma : Agri