5
Davidi akomi mokonzi ya Isalaele mobimba
(1Ma 11.1-3)
Bikolo nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya Davidi mpe balobaki : « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko. Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
Boye bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi. Mokonzi Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele.
 
Davidi azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei : mibu sambo na basanza motoba lokola mokonzi ya Yuda, na Ebron ; mpe mibu tuku misato na misato lokola mokonzi ya Isalaele mobimba mpe Yuda, na Yelusalemi.
Davidi abotoli Yelusalemi
(1Ma 11.4-9)
Mokonzi mpe bato na ye bakendeki na Yelusalemi mpo na kobundisa bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda kuna. Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te, pamba te ezala mokufi miso to moto ya tengu-tengu akobengana yo. »
Bakanisaki ete Davidi akoki kokota kuna te. Atako bongo, Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi. Na mokolo wana, Davidi alobaki : « Moto nyonso oyo alingi kobundisa bato ya Yebusi asengeli kozwa nzela ya se ya mabele mpo na kokanga bato ya tengu-tengu mpe bakufi miso oyo bazali banguna ya Davidi. » Yango wana balobaka : « Bakufi miso mpe bato ya tengu-tengu bakokota te na ndako ya mokonzi. »
Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi mpe abengaki yango « Engumba ya Davidi. » Mpe Davidi atongaki zingazinga na yango, longwa na Milo kino na kati. 10 Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, azalaki elongo na ye.
(1Ma 14.1-2)
11 Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga ; mpe batongelaki Davidi ndako. 12 Davidi asosolaki ete Yawe azali kolendisa ye lokola mokonzi ya Isalaele mpe azali kotombola bokonzi na ye mpo na Isalaele, bato na Ye.
(1Ma 3.5-9; 14.3-7)
13 Tango Davidi alongwaki na Ebron mpe akendeki kovanda kati na Yelusalemi, azwaki lisusu bamakangu mpe basi mosusu ebele oyo babotelaki ye bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
14 Tala bakombo ya bana ya Davidi oyo babotamaki na Yelusalemi : Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo, 15 Yibari, Elishuwa, Nefegi, Yafia, 16 Elishama, Eliyada mpe Elifeleti.
Davidi alongi bato ya Filisitia
(1Ma 14.8-16)
17 Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, akendeki na ndako oyo batonga makasi. 18 Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya Refayimi. 19 Davidi atunaki Yawe :
— Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ?
Yawe azongiselaki ye :
— Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
20 Davidi akomaki na Bali-Peratsimi mpe alongaki kuna bato ya Filisitia. Alobaki : « Yawe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. »
Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi. 21 Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango ya bikeko, mpe Davidi elongo na basoda na ye bamemaki yango.
22 Bato ya Filisitia bayaki lisusu mpe bapanzanaki kati na lubwaku ya Refayimi. 23 Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango ; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie. 24 Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya Mirie, na tango wana nde okobima noki, pamba te ekolakisa ete Yawe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »
25 Davidi asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Geba kino na Gezeri.