6
Bamemi Sanduku na Yelusalemi
(1Ma 13.5-14)
Davidi asangisaki basoda ya mpiko ya Isalaele, bazalaki nkoto tuku misato. Davidi elongo na basoda na ye nyonso bakendeki na Baale-Yuda mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo moko, Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka kati na basheribe na likolo ya Sanduku. Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ezalaki Uza mpe Ayiyo, bana mibali mibale ya Abinadabi, nde bazalaki kotambolisa shario yango oyo ya sika. Bamemaki shario elongo na Sanduku ya Nzambe, wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ayiyo azalaki kotambola liboso ya shario. Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela na liboso ya Yawe, na kobeta lolenge nyonso ya bibetelo mindule basala na mabaya ya sipele, mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, makembe mpe manzanza.
Tango bakomaki na etando ya Nakoni, Uza asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe, pamba te bangombe elingaki kokweyisa Sanduku. Yawe asilikelaki Uza makasi, mpe Nzambe abetaki ye mpo na mbeba na ye. Boye Uza akufaki kaka wana, pembeni ya Sanduku ya Nzambe.
Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza. » Na mokolo wana, Davidi abangaki Yawe mpe amitunaki : « Ndenge nini Sanduku ya Yawe eya epai na ngai ? »
10 Boye, Davidi aboyaki komema Sanduku ya Yawe epai na ye, kati na engumba ya Davidi ; akendeki kotia yango kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati. 11 Sanduku ya Yawe evandaki sanza misato kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati ; mpe Yawe apambolaki Obedi-Edomi elongo na libota na ye nyonso.
(1Ma 15.25–16.1-3)
12 Tango bayaki koyebisa mokonzi Davidi ete Yawe apamboli ndako ya Obedi-Edomi mpe biloko na ye nyonso mpo na Sanduku ya Nzambe, Davidi akendeki kozwa na esengo Sanduku ya Nzambe wuta na ndako ya Obedi-Edomi, mpe bakendeki na yango kati na engumba ya Davidi. 13 Tango bato oyo bazalaki komema Sanduku ya Yawe batindikaki makolo na bango mbala motoba, batelemaki, mpe Davidi abonzaki lokola mbeka ngombe moko ya mobali mpe mwana ngombe moko ya mafuta. 14 Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe. 15 Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Yawe na kobeta milolo ya esengo mpe na kobeta bakelelo.
16 Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye. 17 Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango. Mpe Davidi abonzaki liboso ya Yawe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. 18 Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga. 19 Bongo apesaki na bato nyonso, na lisanga mobimba ya Isalaele, mibali mpe basi, lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati, gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka. Sima na yango, bato nyonso bazongaki na bandako na bango.
 
20 Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki :
— Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala ?
21 Davidi alobaki na Mikali :
— Nazalaki nde kosepela liboso ya Yawe oyo aponaki ngai mpe asepelaki na ngai koleka tata na yo mpe moto nyonso ya ndako na ye, tango akomisaki ngai mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe. 22 Nakokoma lisusu moto pamba koleka mpe nakomikitisa lisusu koleka na miso na ngai moko. Kasi liboso ya basi oyo yo ozali kolobela, ngai nakozwa lokumu.
23 Mpo na yango, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotaki te kino na mokolo na ye ya kufa.