7
Elaka ya Nzambe epai ya Davidi
(1Ma 17.1-15)
Sima na mokonzi kovanda na ndako na ye mpe Yawe kopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingelaki ye, mokonzi alobaki na mosakoli Natan :
— Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.
Natan azongiselaki mokonzi :
— Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Yawe azali elongo na yo.
Kasi na butu wana, Yawe alobaki na Natan :
— Kende koyebisa Davidi, mosali na ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Boni, yo nde okotongela ngai ndako mpo ete navanda kati na yango ? Natikali nanu kovanda na ndako moko te, banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo ; nazalaki kotambola bipai na bipai na se ya ndako ya kapo, wana nazalaki kovanda kati na Mongombo. Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na ngai, Isalaele : ‹ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele ? › »
Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : « Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele. Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki, mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili. 10 Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele ; nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso 11 mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakopesa yo bopemi liboso ya banguna na yo nyonso. ›
Yawe atatoli mpo na yo ete Ye moko akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo. 12 Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye. 13 Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi. 14 Nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai. Soki asali mabe, nakopesa ye etumbu ; nakosalela bato lokola fimbu mpo na kobeta ye. 15 Kasi nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya Saulo oyo nalongolaki liboso na yo. 16 Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. »
17 Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso.
Libondeli ya Davidi
(1Ma 17.16-27)
18 Bongo mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki :
« Nkolo Yawe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali ? 19 Ah Nkolo Yawe, lokola nde ekokaki te na miso na Yo, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo ! Ah Nkolo Yawe, boni, ezali boye nde osalaka mpo na bato ?
20 Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo ? Pamba te, oh Nkolo Yawe, oyebi mosali na Yo ? 21 Ezali mpo na Liloba na Yo mpe kolanda mokano na Yo nde okokisi likambo monene oyo, mpe osali ete eyebana epai ya mosali na Yo.
22 Oh Nkolo Yawe, ozali monene ndenge nini ! Moko te akokani na Yo ; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo ! 23 Ekolo nini ekokani na bato na Yo, Isalaele, oyo, kati na mokili, Nzambe akendeki kosikola lokola bato mpo na Ye moko, mpo na kopesa yango kombo mpe kokokisa makambo minene, makambo ya kokamwa mpe ya somo na nzela ya kobengana bikolo elongo na banzambe na bango liboso ya bato na Yo, oyo osikolaki wuta na Ejipito ? 24 Otiaki Isalaele, bato na Yo, mpo ete bazala bato na Yo mpo na libela ; bongo Yo, oh Yawe, okomaki Nzambe na bango.
25 Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, kokisa mpo na libela elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe epai ya libota na ye. Sala ndenge olakaki 26 mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko, mpe bato bakoma kolobaka : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe ya Isalaele. › Boye bokonzi ya libota ya Davidi, mosali na Yo, ekolendisama liboso na Yo.
27 Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, olakisaki na mosali na Yo makambo oyo na koloba : ‹ Nakosala ete bokonzi ewumela na libota na yo. › Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo na maloba oyo.
28 Sik’oyo, oh Nkolo Yawe, ozali penza Nzambe ! Maloba na Yo ezali solo, mpe olakaki makambo oyo ya malamu epai ya mosali na Yo. 29 Sik’oyo, tika ete opambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo ; pamba te oh Nkolo Yawe, Yo nde olobaki, mpe na nzela ya lipamboli na Yo, libota ya mosali na Yo ekopambolama mpo na libela. »