11
Yawe abebisi bikolo ya nguya
Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo
mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele !
Nzete ya sipele, lela,
pamba te nzete ya sedele esili kokweya !
Banzete milayi esili kokatama.
Banzete ya sheni ya Bashani, bolela ;
pamba te basili kokata zamba monene !
Boyoka ndenge babateli bibwele bazali kolela,
pamba te bitando epai wapi baleisaka bibwele ebebisami.
Boyoka ndenge bankosi ezali koganga,
pamba te zamba ya Yordani, oyo etonda na banzete,
esili kobebisama.
Babateli mibale ya bameme
Tala liloba oyo Yawe, Nzambe na ngai, alobi :
— Batela malamu bameme oyo babongisi mpo na koboma ! Bato oyo basombaka bibwele yango babomaka yango, bazalaka na somo ya etumbu ata moko te. Bato oyo batekaka yango balobaka : « Tika ete Yawe apambolama, pamba te nakomi mozwi ! » Mpe bango moko babateli na yango bayokelaka yango mawa ata moke te. Yango wana Ngai mpe nakoyokela lisusu bato ya mokili mawa te, nakokaba moto na moto na maboko ya moninga na ye mpe ya mokonzi na ye. Bakonzi bakobebisa mokili, kasi nakokangola ata moto moko te wuta na maboko ya bakonzi yango, elobi Yawe.
Boye, nabatelaki malamu bameme oyo babongisaki mpo na koboma ; mpe mingi penza bameme oyo ezalaki na pasi makasi. Nakamataki mangenda mibale : nabengaki moko Ngolu, mpe mosusu, Bomoko. Bongo, nakomaki kobatela bameme. Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato ; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai. Nalobaki na etonga ya bibwele :
— Nakozala lisusu mobateli na bino te. Tika ete oyo ekokufa ekufa na yango, oyo ekobunga ebunga na yango ; mpe tika ete oyo ekotikala ebomana yango na yango !
10 Nakamataki lingenda oyo nabengaki Ngolu, nabukaki yango mpo na kotalisa ete boyokani oyo nasalaki elongo na bikolo nyonso esili. 11 Boyokani esilaki nde na mokolo wana ; bongo, etonga oyo ezalaki na pasi makasi mpe ezalaki kotala ngai esosolaki ete ezalaki solo Liloba na Yawe.
12 Nalobaki na bango :
— Soki bomoni ete ezali malamu, bopesa ngai lifuti na ngai ; soki te, botika na bino.
Bafutaki ngai mbongo ya bibende ya palata tuku misato lokola lifuti na ngai.
13 Mpe Yawe alobaki na ngai :
— Bwaka yango epai ya mosali mbeki ; yango nde motuya ya malonga oyo bamoni ete ekoki na Ngai !
Nakamataki mbongo yango ya bibende tuku misato mpe nabwakaki yango kati na Tempelo ya Yawe, epai ya mosali mbeki.
14 Bongo nabukaki lisusu lingenda ya mibale oyo nabengaki Bomoko, mpo na kotalisa ete bondeko kati na libota ya Yuda mpe ya Isalaele ekufi.
15 Yawe alobaki na ngai :
— Kamata lisusu bisalelo ya mobateli bibwele ya zoba ! 16 Pamba te nakobimisa kati na mokili mobateli bibwele ya sika oyo akobanda koluka te bibwele oyo ebungi, akolandela te bana bibwele, akosalisa te bapota ya bibwele oyo ezoki, akoleisa te oyo ezali na nzoto kolongono, kasi akobanda koliaka misuni ya bibwele ya mafuta mpe kobuka yango makolo. 17 Mawa na mobateli bibwele ya zoba oyo asundolaka etonga na ye ! Tika ete mopanga ekata ye loboko mpe etobola ye liso oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ! Tika ete loboko na ye ekawuka, solo, ekawuka penza ! Tika ete liso na ye, oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ekufa, ekufa solo !