10
Kosambwisama ya banzambe ya bikeko
Bosenga epai na Yawe ete anokisa mvula ya suka ;
ezali Yawe nde atindaka mapata mpe bakake
oyo ememaka bamvula minene,
Ye nde abimisaka matiti na elanga ya moko na moko.
Nzokande, banzambe ya bikeko elobaka maloba ya pamba,
mpe bimoniseli ya bato ya soloka ezalaka ya lokuta :
bazwaka bandoto oyo ezanga tina,
mpe malendisi na bango ezalaka ya lokuta.
Yango wana, bato bakomaki kotelengana lokola bibwele
oyo ezangi mobateli.
Kobima ya sika
Kanda na Ngai ya makasi epeli mpo na babateli,
mpe nakopesa bakambi etumbu,
pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga,
ayei mpo na kobatela etonga na Ye, libota ya Yuda ;
akokomisa bango mpunda na Ye ya lokumu kati na bitumba.
Na Yuda nde ekobimela libanga ya songe ya ndako,
likonzi ya ndako ya kapo, tolotolo ya bitumba
mpe bakambi nyonso.
Bango nyonso bakokoma lokola bilombe ya bitumba,
oyo bakangamaka te na potopoto ya babalabala
na tango ya bitumba.
Lokola Yawe azali elongo na bango,
bakobunda mpe bakolonga,
ata basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda.
 
« Nakolendisa libota ya Yuda
mpe nakobikisa libota ya Jozefi,
nakozongisa bango lisusu na mokili na bango,
pamba te nakoyokela bango mawa ;
bakozala lokola bato oyo nasundolaki te,
pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango,
mpe nakoyanola bango.
Bato ya Efrayimi bakokoma lokola bilombe ya bitumba ;
mitema na bango ekotonda na esengo lokola bato bameli masanga ;
bana na bango ya mibali bakomona yango
mpe bakotonda na esengo,
bongo mitema na bango ekosepela kati na Yawe.
Nakobeta piololo mpo na kobenga bango
mpe nakosangisa bango esika moko.
Solo, nakokangola bango, mpe bakokoma ebele
ndenge bazalaki liboso.
Ata soki napanzi bango kati na bikolo ya bapaya,
ezala na mokili oyo eleki mosika,
bakokanisa Ngai kaka.
Bango elongo na bana na bango ya mibali bakobika
mpe bakozonga na mokili na bango.
10 Nakozongisa bango wuta na Ejipito ;
nakosangisa bango wuta na Asiri ;
nakomema bango na Galadi mpe na Libani ;
kasi atako bongo, esika ya kovanda ekozala moke mpo na bango.
11 Bakoleka na kati-kati ya ebale monene ya mitungisi ;
bambonge ya ebale monene ekovanda kimia,
bozindo nyonso ya ebale Nili ekokawuka.
Lolendo ya Asiri ekosila
mpe lingenda ya bokonzi ya Ejipito ekolongwa.
12 Nakosala ete balendisama kati na Yawe :
bakotambola na Kombo na Ye, »
elobi Yawe.