4
Emoniseli ya mitano : etelemiselo ya minda mpe banzete mibale ya olive
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi. Atunaki ngai :
— Ozali komona nini ?
Nazongiselaki ye :
— Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda. Ezali lisusu na banzete mibale ya olive pene ya etelemiselo ya minda : moko na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi.
Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai :
— Nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai ?
Azongiselaki ngai :
— Boni, oyebi te soki elingi kolakisa nini ?
Nazongiselaki ye :
— Te, nkolo na ngai !
Alobaki na ngai :
— Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Ozali nani, ngomba monene ? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo : « Tika ete Nzambe apambola yango ! Tika ete Nzambe apambola yango ! »
Bongo Yawe alobaki na ngai :
— Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
10 Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.
11 Natunaki Anjelu :
— Banzete mibale ya olive oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali mpe ya mwasi ya etelemiselo ya minda elakisi nini ?
12 Natunaki ye lisusu :
— Bitape mibale ya nzete ya olive, oyo ezali pembeni ya batio mibale ya wolo oyo ebimisaka mafuta oyo engalaka elakisi nini ?
13 Azongiselaki ngai :
— Boni, oyebi te soki elakisi nini ?
Nazongisaki :
— Te, nkolo na ngai.
14 Boye, alobaki :
— Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba.