5
Emoniseli ya motoba : buku oyo epumbwaka
Tango natalaki lisusu, namonaki buku moko : ezali kopumbwa. Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atunaki ngai :
— Ozali komona nini ?
Nazongisaki :
— Nazali komona buku moko : ezali kopumbwa ; molayi na yango ezali na bametele pene zomi, mpe mokuse na yango, bametele pene mitano.
Alobaki na ngai :
— Ezali nde bilakeli mabe oyo ezali kopanzana na mokili mobimba ; pamba te, kolanda ndenge ekomama na ngambo moko, bakobengana miyibi nyonso ; mpe kolanda ndenge ekomama na ngambo mosusu, bakobengana bato nyonso oyo balapaka ndayi ya lokuta. Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Emoniseli ya sambo : mwasi kati na kitunga
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai apusanaki pene na ngai mpe alobaki :
— Tombola miso na yo mpe tala makambo oyo ezali koleka kuna.
Natunaki :
— Makambo nini yango ?
Azongisaki :
— Ezali nde sani, emekelo motuya ya biloko.
Abakisaki :
— Sani yango etondisamaki na masumu ya bato ya mokili.
Kaka na tango yango, mofinuku na yango ya ebende etombwamaki, mpe namonaki mwasi moko avanda na kati.
Alobaki :
— Mwasi wana azali elembo ya makambo mabe. Bongo azongisaki ye kati na sani, emekelo motuya ya biloko, mpe azipaki mofinuku na yango.
Natombolaki miso mpe namonaki liboso na ngai basi mibale bazali kopumbwa mpo na koya epai na biso. Mapapu na bango ezalaki minene lokola mapapu ya nkongi. Batombolaki sani yango kino na kati-kati ya likolo mpe se.
10 Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai :
— Bazali komema sani yango wapi ?
11 Azongisaki :
— Bazali komema yango na mokili ya Babiloni mpo ete batongela yango ndako, na Shineari. Soki ndako yango esili kotongama, bakotia sani yango kuna.