7
Likambo ya kokila bilei
Na mobu ya minei ya mokonzi ya Dariusi, na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, sanza ya kisilevi, Yawe alobaki na Zakari. Bato ya Beteli batindaki Saretseri, Regemi-Meleki elongo na bato na bango mpo na kobondela Yawe mpe mpo na kotuna motuna oyo epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe epai ya basakoli :
— Boni, tosengeli kaka kokoba kolela mpe kokila bilei na sanza ya mitano ndenge tosalaka wuta kala ?
Bongo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :
— Tuna bato nyonso ya ekolo mpe Banganga-Nzambe : « Wuta mibu tuku sambo, tango bokilaka bilei mpe bolelaka na sanza ya mitano mpe ya sambo, bosalaka yango mpo na Ngai ? Bongo tango bozalaki kolia mpe komela, ezalaki te mpo na esengo na bino moko ? Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele ? »
Mpe Yawe alobaki lisusu na Zakari :
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu. 10 Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. »
11 Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te. 12 Bakomisaki mitema na bango makasi lokola diama mpo kaka bayoka te mibeko mpe maloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki koloba na bango na lisungi ya Molimo na Ye na nzela ya basakoli na Ye ya kala. Mpo na yango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, atombokaki makasi.
13 Boye, Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki : « Lokola bayokaki Ngai te tango nazalaki kobenga bango, Ngai mpe nayokaki bango te tango babengaki Ngai. 14 Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »