8
Elaka ya kopambola Yelusalemi
Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Siona, mpo ete nalingaka yango makasi na motema na Ngai. › »
 
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo ; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. »
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Mibange ya mibali mpe ya basi bakotonda lisusu na babalabala ya Yelusalemi, moto na moto na nzete na ye na loboko mpo na kimobange. Babalabala ya engumba ekotonda lisusu na bilenge mibali mpe basi oyo bakokoma kosakana kuna. »
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakobikisa bato na Ngai, longwa na mokili ya este kino na mokili ya weste. Nakozongisa bango mpo ete bavanda na Yelusalemi ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango na boyengebene mpe na bosembo. »
 
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bino ba-oyo, na mikolo oyo, bozali koyoka maloba kaka oyo basakoli balobaki, lokola bazalaki awa na tango miboko ya Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaki kotongama, boyika mpiko mpe bolendisa maboko na bino mpo na kotonga Tempelo oyo ya Yawe. 10 Pamba te, liboso ya tango wana, bato bazalaki kozwa lifuti ya malonga te na misala na bango, mpe banyama ezalaki kopesa ata litomba moko te ; moto moko te azalaki kokende na mosala na ye na kimia likolo ya kobanga banguna, pamba te nasalaki ete moto moko na moko atelemela moninga na ye. 11 Kasi sik’oyo, nakosala lisusu te, na ndambo ya bato oyo batikali, makambo oyo nasalaki na tango ya kala, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 12 « Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo. 13 Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele, bobanga ata eloko moko te, boyika kaka mpiko ; pamba te ndenge bokomaki bikolo elakelama mabe kati na bikolo mosusu, ndenge wana mpe nakobikisa bino, mpe bokozala lipamboli. »
 
14 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Ndenge kaka nazwaki mokano ya kotindela bino pasi mpe ya koyokela bino mawa te tango batata na bino batumbolaki kanda na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, 15 « ndenge wana mpe nazwi mokano sik’oyo ya komonisa lisusu bolamu na Yelusalemi mpe na Yuda. Bozala na bobangi te. 16 Tala makambo oyo bosengeli kosala : Tika ete moko na moko kati na bino alobaka solo na moninga na ye ; bosambisaka na bosolo mpe bokataka makambo na bosembo kati na bisambiselo na bino, 17 bosalaka mabongisi ya komonisa baninga na bino pasi te, bolingaka te kolapa ndayi ya lokuta ; pamba te makambo wana nyonso, nayina yango makasi, » elobi Yawe.
18 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai : 19 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. »
20 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bato ya bikolo ebele mpe bavandi ya bingumba ya ndenge na ndenge bakoya lisusu ; 21 bamoko bakowuta na engumba moko mpo na kokende na engumba mosusu mpe bakoloba : ‹ Tokende kobondela Yawe mpe koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga ! › Bongo bamosusu bakozongisela bango : ‹ Ngai mpe nakokende ! › 22 Boye bato ebele mpe bikolo ya nguya bakoya na Yelusalemi mpo na koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bakobondela Ye. »
23 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba : ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »