13
Nzambe asambisi basakoli ya lokuta
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, sakola mabe na tina na basakoli ya Isalaele, oyo bazali kosakola sik’oyo ; loba na ba-oyo bazali kosakola makambo oyo ezali kowuta na mitema na bango moko : ‹ Boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na basakoli ya bazoba, oyo balandaka makanisi ya mitema na bango moko ! Nzokande bamonaki eloko moko te. Oh Isalaele, basakoli na yo bazali lokola bambwa ya zamba kati na bisika oyo etonda na biloko ebeba. Bomataki te na mir mpo na kobamba madusu mpe kozingela libota ya Isalaele na mir zingazinga mpo na kobatela yango na tango ya bitumba, na mokolo ya Yawe. Bimoniseli na bango ezali ya pamba, mpe masakoli na bango ezali ya lokuta. Balobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai Yawe, natindi bango te. Mpe bazelaka ete maloba na bango ekokisama ! Boni, bimoniseli na bino ezalaka ya pamba te, mpe masakoli na bino ezalaka ya lokuta te, atako bolobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai nalobi na bino ata liloba moko te ? Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mpo ete bolobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta, Ngai moko natelemeli bino, elobi Nkolo Yawe. Loboko na Ngai ekobeta basakoli oyo balobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta : bakozala na esika te kati na lisanga ya bato na Ngai, bakombo na bango ekokomama te kati na buku ya libota ya Isalaele, bakokoma te kino na mokili ya Isalaele. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. 10 Boye, lokola bapengwisaka bato na Ngai tango balobaka : ‘ Kimia, ’ na tango kimia ezali te ; lokola bapakolaka potopoto ya pembe na mir oyo bato na Ngai basili kotonga, 11 yebisa bato oyo bapakolaka yango potopoto ya pembe ete mir ekokweya. Nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, bongo mipepe makasi ekotomboka. 12 Tango mir yango ekokweya, bato bakotuna bino : ‘ Mosala nini penza potopoto ya pembe esali ? ’
13 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye. 14 Nakokweyisa mir oyo bopakolaki potopoto ya pembe mpe nakolalisa yango kino na se, mpo ete miboko na yango emonana. Tango mir yango ekokweya, ekoboma bino ; mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. 15 Nakokweyisela mir mpe bato oyo bapakolaki yango potopoto ya pembe kanda na Ngai ; nakoloba na bino : ‘ Mir ezali lisusu te ! Bato oyo bazalaki kopakola yango potopoto ya pembe bazali lisusu te ; 16 basakoli ya Isalaele oyo bazalaki kosakola na tina na Yelusalemi mpe komona bimoniseli ya kimia mpo na yango, nzokande kimia ezali na yango te, bazali lisusu te, elobi Nkolo Yawe. ’ ›
17 Boye, yo, mwana na moto, tala mpe telemela bilenge basi ya Isalaele, oyo bazali kosakola kolanda makanisi ya mitema na bango moko ! Sakola mabe na tina na bango 18 mpe loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na basi oyo balataka basinga ya maji na maboko na bango mpe batongaka bitambala mpo na mito ya bato ya ndenge na ndenge mpo na kotiela bomoi na bango mitambo ! Bokanisi ete bokotiela bomoi ya bato na Ngai mitambo mpo ete botikala bino moko kaka na bomoi ? 19 Bozali kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai liboso ya bato na Ngai mpo na ndambo ya mbuma ya orje mpe ndambo ya mapa ! Tango bozali kokosa bato na Ngai, oyo bazali koyoka makambo ya lokuta, bozali nde koboma bato oyo basengelaki kokufa te, mpe kotika na bomoi bato oyo basengelaki te kozala na bomoi.
20 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli basinga na bino ya maji, oyo bozali kosalela mpo na kotiela bato na Ngai mitambo lokola bandeke, nakokata-kata yango mpe nakolongola yango na maboko na bino ; mpe nakokangola bomoi ya bato oyo bokangaki na mitambo lokola bandeke. 21 Nakopasola bitambala na bino mpe nakokangola bato na Ngai na maboko na bino ; bakokweya lisusu te na se ya bokonzi na bino ! Mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. 22 Lokola bozali kolembisa mitema ya bato ya sembo na nzela ya lokuta na bino, nzokande Ngai moko nalembisaki bango mitema te ; lokola bozali kolendisa bato mabe ete bakangama na etamboli na bango ya mabe mpo ete babikisa bomoi na bango te, 23 bokomona lisusu te bimoniseli na bino wana ya pamba mpe bokoloba lisusu masakoli te ; nakobikisa bato na Ngai na maboko na bino, mpe, na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »