22
Masumu ya Yelusalemi
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, okosambisa yango solo ? Okosambisa solo engumba oyo esopaka makila ? Lakisa yango misala na yango nyonso ya mbindo mpe loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh engumba oyo emibendelaka bololo na nzela ya kosopa makila na kati-kati na yango mpe emikomisaka mbindo na nzela ya komisalela bikeko, ozali na ngambo mpo na makila oyo osopaki mpe okomi mbindo mpo na bikeko oyo osalaki ! Okomisi bomoi na yo mokuse mpe okomi na suka ya mibu ya bomoi na yo ! Yango wana, nakokomisa yo eloko ya kotiola liboso ya bikolo mpe eloko ya maseki liboso ya mikili nyonso. Yo, engumba ya mbindo, etonda na mobulu, bato oyo bazali pene mpe ba-oyo bazali mosika bakoseka yo !
Tala ndenge bakambi ya Isalaele basalelaka bokonzi na bango mpo na kosopa makila. Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali. Otiolaka biloko na Ngai ya bule mpe obebisaka bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Na mboka na yo, bakoselaka bato makambo mpo na kobomisa bango. Na mboka na yo, baliaka biloko na bisika ya bule oyo ezalaka na likolo ya bangomba mpe basalaka makambo ya nkele. 10 Na mboka na yo, mibali basangisaka nzoto na basi ya batata na bango mpe bazwaka na makasi basi oyo bazali komona sanza na bango, na tango oyo bazali mbindo. 11 Na mboka na yo, moko na moko azali kosala makambo ya mbindo elongo na mwasi ya moninga na ye, mosusu azali kokomisa mwasi ya mwana na ye mbindo, mpe mosusu lisusu azali kosangisa nzoto na makasi na ndeko na ye ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ye. 12 Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe.
13 Solo, nakobeta maboko na Ngai mpo na litomba oyo bozwaki na nzela ya mabe mpe mpo na makila oyo botangisaki kati na bino. 14 Boni, bokoyika kaka mpiko to maboko na bino ekozala kaka makasi na mokolo oyo nakokitisela bino kanda na Ngai ? Ngai Yawe, nalobaki mpe nakokokisa yango. 15 Nakopanza bino kati na bikolo, nakopalanganisa bino bipai na bipai kati na mokili mpe nakosukisa mbindo na bino. 16 Omikomisaki mbindo na miso ya bikolo, kasi okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
17 Yawe alobaki na ngai :
18 « Mwana na moto, libota ya Isalaele ekomi lokola fulu na miso na Ngai ; bango nyonso bakomi lokola ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, ebende mpe mbodi oyo babwaka na etumbelo ya bibende. Solo, bakomi kaka lokola bosoto ya palata. 19 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola bino nyonso bokomi kaka lokola bosoto, nakosangisa bino na Yelusalemi. 20 Ndenge bato basangisaka palata, ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, mbodi mpe ebende kati na etumbelo ya bibende mpo na kolamba yango, ndenge wana mpe Ngai nakosangisa bino na kanda mpe na kotomboka na Ngai, mpe nakobwaka bino kati na engumba mpo na kozikisa bino. 21 Nakosangisa bino mpe nakofula bino mopepe ya moto ya kanda na Ngai ; bongo nakozikisa bino kati na Yelusalemi. 22 Ndenge bazikisaka palata kati na etumbelo ya bibende, ndenge wana mpe nakozikisa bino kati na engumba. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe, nasopeli bino kanda na Ngai ya makasi. › »
23 Yawe alobaki na ngai lisusu :
24 « Mwana na moto, loba na Yelusalemi : ‹ Ozali mabele oyo epetolamaki te mpe enokelaki mvula te na mokolo ya kanda na Ngai ya makasi. › 25 Basakoli na yo bazali kosala likita ; lokola nkosi oyo ezali koganga tango ezali kopasola nyama na yango, bazali koboma bato, kobotola bomengo mpe biloko ya motuya ya bato mpe kokomisa ebele kati na yango, basi bakufisa mibali. 26 Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto ; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango.
27 Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe. 28 Basakoli na yango bazali kopakola misala na bango ya mabe potopoto ya pembe na nzela ya bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ; bazali koloba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi, › na tango Yawe alobi na Ye eloko moko te. 29 Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo.
30 Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te.
31 Yango wana, nakosopela bango kanda na Ngai ya makasi mpe natumba bango na moto ya kanda na Ngai, nakopesa bango etumbu kolanda etamboli na bango, elobi Nkolo Yawe. »