23
Bandeko basi mibale ya bandumba
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, ezalaki na basi mibale, bana ya mama moko. Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge. Oyo ya kulutu, kombo na ye ezalaki Ohola ; mpe oyo ya leki, kombo na ye ezalaki Oholiba : bazalaki basi na Ngai mpe babotaki bana mibali mpe bana basi. Ohola azali Samari mpe Oholiba azali Yelusalemi.
Ohola amipesaki na kindumba tango azalaki nanu ya Ngai mpe akufelaki kolinga bamakangu na ye, bato ya Asiri, bilombe ya bitumba oyo balataka bilamba ya lokumu ya langi ya ble, bayangeli mpe bakonzi ya basoda ; bango nyonso bazalaki bilenge mibali ya kitoko oyo bayebaki malamu kotambola na bampunda. Ye moko alakisaki polele kindumba na ye epai ya bato ya lokumu ya Asiri mpe amikomisaki mbindo na nzela ya banzambe ya bikeko nyonso, ya moto nyonso oyo ye azalaki kokufela na bolingo. Atikaki te kindumba na ye oyo abandaki na Ejipito, oyo na tango ya bolenge na ye, mibali bazalaki kosangisa na ye nzoto, kosimbasimba tolo na ye ya bolenge mpe kosilisa baposa na bango ya nzoto epai na ye.
Yango wana nakabaki ye na maboko ya bamakangu na ye, bato ya Asiri, oyo azalaki kokufela. 10 Batikaki ye bolumbu, bakendeki na bana na ye ya mibali mpe ya basi, mpe babomaki ye na mopanga. Akomaki lokola ndakisa mpo na basi mosusu, pamba te azwaki etumbu.
11 Ndeko na ye ya mwasi, Oholiba, amonaki makambo oyo nyonso ; kasi lokola posa ya kindumba elataki ye makasi, asalaki mobulu koleka kutu ndeko na ye ya mwasi. 12 Ye mpe akufelaki kolinga mibali ya Asiri : bayangeli, bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo balataka kitoko mpe batambolaka malamu likolo ya bampunda ; bango nyonso bazalaki bilenge mibali kitoko. 13 Namonaki ete ye mpe amikomisaki mbindo : bango mibale balandaki kaka nzela moko.
14 Nzokande, ye kutu akendeki mosika koleka na kindumba na ye ; amonaki bililingi ya mibali na mir, bililingi ya bato ya Chalide, oyo basala na langi ya motane ; 15 mibali yango balataki mikaba na baloketo na bango mpe bitendi ya balangi ebele na mito na bango. Bango nyonso bazalaki na lolenge ya bakonzi ya basoda ya Babiloni, oyo babotama na mokili na Chalide. 16 Tango kaka amonaki bango, akufelaki bango na bolingo mpe atindaki bantoma epai na bango, na mokili ya Chalide. 17 Bato ya Babiloni bayaki epai na ye kino na mbeto na ye oyo asalelaka bolingo mpe bakomisaki ye mbindo na nzela ya kindumba na bango. Sima na bango kokomisa ye mbindo, ayinaki bango. 18 Tango alakisaki polele kindumba na ye mpe atalisaki bolumbu na ye, nayinaki ye, ndenge kaka nayinaki ndeko na ye ya mwasi. 19 Nzokande, azalaki se kobakisa kindumba na ye tango azalaki kokanisa mikolo ya bolenge na ye, oyo azalaki kosala kindumba, na Ejipito. 20 Kuna, akufelaki kolinga bamakangu na ye, oyo nzoto na bango ya mibali ezalaka lokola nzoto ya mibali ya ane mpe oyo bazalaka na nguya ya kosangisa nzoto lokola mpunda. 21 Boye, okanisaki lisusu kindumba na yo, oyo ozalaki kosala na bolenge tango mibali ya Ejipito bazalaki kosakana na mabele na yo mpe kosimbasimba tolo na yo ya bolenge.
22 Yango wana, Oholiba, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosala ete bamakangu na yo, ba-oyo yo oboyaki, babalukela yo ; mpe nakosala lisusu ete babimela yo na bangambo nyonso : 23 mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu ; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda. 24 Bakoya kobundisa yo na bibundeli, na bampunda mpe na bashar na yango elongo na bato ebele ; bakomibongisa mpo na kobundisa yo na bangambo nyonso, na banguba minene mpe ya mike, mpe na bikoti ya basoda. Nakokaba yo na maboko na bango mpo ete bapesa yo etumbu mpe bakosambisa yo kolanda mibeko na bango. 25 Nakotelemela yo na kanda na Ngai mpe bakosala yo mabe, na mitema ya kanda penza. Bakokata yo zolo mpe matoyi ; bongo bato na yo, oyo bakotikala bakokufa na mopanga. Bakokende na bana na yo ya mibali mpe ya basi, bongo ba-oyo bakotikala bakokufa na moto. 26 Bakobotola yo lisusu bilamba na yo mpe babiju na yo ya talo. 27 Nakosukisa makambo ya soni mpe kindumba na yo, oyo obandaki na Ejipito. Okotombola lisusu miso na yo te mpo na komona bato wana mpe okotikala lisusu kokanisa Ejipito te.
28 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kokaba yo na maboko ya bato oyo oyinaka, bato oyo osepelaka lisusu na bango te. 29 Bato yango bakoyina yo, bakosala yo mabe penza mpe bakobotola yo mbuma ya mosala na yo ; bakolongola yo bilamba mpe okotikala bolumbu, bongo soni ya kindumba na yo ekobima polele. Kindumba mpe ekobo na yo 30 nde ememelaki yo makambo oyo ekomeli yo, pamba te okufelaki kolinga mibali ya bikolo wana mpe omikomisaki mbindo na nzela ya kosalela banzambe na bango ya bikeko. 31 Lokola olandaki nzela ya ndeko na yo ya mwasi, nakotia kopo oyo ye amelaki na loboko na yo.
32 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Okomela kopo oyo ndeko na yo ya mwasi amelaki,
kopo moko ya monene mpe ya mozindo ;
ekomemela yo kosambwa mpe soni,
pamba te ezali monene penza.
33 Ekolangwisa yo na pasi :
kopo ya kobebisama mpe ya somo,
kopo ya ndeko na yo ya mwasi, Samari.
34 Okomela yango kino ekokawuka,
okobuka-buka yango na biteni,
mpe ekozokisa-zokisa mabele na yo,
pamba te Ngai Nkolo Yawe nde nalobi.
 
35 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola obosanaki Ngai mpe otiaki Ngai na sima ya mokongo na yo, okomema mikumba ya ekobo mpe ya kindumba na yo. »
36 Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, okosambisa penza Ohola mpe Oholiba ? Lakisa bango misala na bango ya mbindo ; 37 pamba te basalaki kindumba, mpe makila etondi na maboko na bango ; basalaki kindumba na banzambe na bango ya bikeko, mpe babonzaki lokola mbeka bana na bango ya mibali oyo babotelaki Ngai, mpo ete bakoma bilei ya banzambe na bango ya bikeko. 38 Basalaki yango mpe lisusu epai na Ngai : kaka na tango yango, bakomisaki Esika na Ngai ya bule mbindo mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. 39 Kaka na mokolo oyo bazalaki kobonza lokola mbeka bana na bango epai ya banzambe na bango ya bikeko, bazalaki mpe kokota na Esika na Ngai ya bule mpe kobebisa bosantu na yango. Yango nde bazalaki kosala kati na Ndako na Ngai.
40 Batindaki mpe bantoma epai ya bato oyo bazalaka mosika. Mpe tango bayaki, omisukolaki nzoto, opakolaki biloko ya monzele na miso mpe olataki babiju. 41 Ovandaki na mbeto moko ya kitoko ; mpe liboso na yango, ezalaki na mesa moko oyo otiaka malasi ya ansa mpe mafuta na Ngai.
42 Zingazinga na ye, makelele ya bato ebele ezalaki koyokana, bameli masanga ebele oyo bawutaki na esobe elongo na bato ebele bayaki kolatisa bango mayaka na maboko mpe mitole ya bonzenga na mito na bango. 43 Boye, namilobelaki na tina na mwana mwasi oyo anzulukaki nzoto mpo na kindumba : ‹ Boni, ezali kaka ye oyo anzuluki nzoto nde azali kozongela lisusu penza kindumba ! › 44 Mpe basangisaki na ye nzoto : ndenge mibali basangisaka nzoto na mwasi ya ndumba, ndenge wana mpe basalaki bango, Ohola mpe Oholiba.
45 Kasi bato ya sembo bakosambisa bango mpe bakokatela bango etumbu oyo bapesaka na basi oyo basalaka ekobo mpe basopaka makila, pamba te bazali bandumba mpe maboko na bango ezali na makila.
46 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete ebele ya bato batombokela bango, banyokola bango mpe babotola biloko na bango na makasi ! 47 Tika ete babamba bango mabanga mpe baboma bango na mopanga ; baboma bana na bango ya mibali mpe ya basi mpe babebisa bandako na bango na moto. 48 Na nzela wana nde nakosukisa kindumba kati na mokili, mpo ete basi nyonso bazwa mayele mpe balanda ndakisa na bango te. 49 Bokozwa etumbu mpo na kindumba na bino mpe bokomema mikumba ya masumu na bino ya kosambela banzambe ya bikeko ; boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. »