24
Nzungu ya kolambela
Na mokolo ya zomi ya sanza ya zomi, na mobu ya libwa, Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, koma mokolo oyo kati na buku, mokolo ya lelo, pamba te ezali na mokolo oyo nde mokonzi ya Babiloni azingelaki engumba Yelusalemi. Loba na libota oyo ya batomboki lisese oyo ; yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Kamata nzungu moko ya kolambela,
bongisa yango mpe tia mayi kati na yango.
Tia biteni ya misuni kati na yango,
biteni nyonso ya malamu : lokolo mpe lipeka ;
tondisa yango na mikuwa ya malamu.
Kamata bameme oyo ezanga mbeba kati na etonga
mpe sangisa bakoni na se ya nzungu yango ;
pelisa moto mpe tokisa nzungu yango
kino mikuwa ekobela penza !
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Mawa na engumba oyo esopaka makila,
nzungu ya salite, nzungu oyo elongwaka salite te !
Tika yango pamba,
longola eteni moko na moko
kino nyonso ekosila na kobeta zeke te.
Pamba te makila oyo esopaki ezali kati na yango ;
esopaki yango na likolo ya libanga,
esopaki yango na mabele te
epai wapi putulu ekokaki kozipa yango.
 
Mpo na kopelisa kanda na Ngai
mpe kozongisela yango mabe na mabe,
natie makila na yango na likolo ya mabanga
mpo ete ebombama te.
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Mawa na engumba oyo esopaka makila !
Ngai mpe nakosangisela yo bakoni ebele.
10 Sangisa bakoni mpe pelisa moto.
Lamba misuni malamu,
sangisa yango na biloko mike-mike
ya solo kitoko oyo balambelaka
mpe sala ete mikuwa ezika.
11 Bongo tia nzungu ya pamba
na likolo ya makala ya moto
kino ekoma moto
mpe linzanza na yango ekoma motane,
mpo ete mbindo na yango elongwa
mpe konzuluka na yango ekende na moto.
12 Kasi konzuluka na yango esilisi makasi ya bato,
bosoto na yango etikali kolongwa te !
Ezala moto, elongi te kolongola bosoto yango !
13 Yelusalemi, mbindo na yo ezali kindumba. Nalukaki kokomisa yo peto, kasi olingaki kopetolama te na bosoto na yo. Okotikala lisusu kozala peto te kino tango nakosilisa kosopela yo kanda na Ngai.
 
14 Ngai Yawe nde nalobaki. Tango ekoki mpo na Ngai kosala ; nakoyoka mawa te, nakozonga sima te ! Okosambisama solo kolanda etamboli mpe misala na yo, elobi Nkolo Yawe. › »
Kufa ya mwasi ya Ezekieli
15 Yawe alobaki na ngai :
16 « Mwana na moto, nakolongola, na nzela ya kufa ya pwasa, mwasi oyo asepelisaka motema na yo. Kasi komitungisa te, kolela te mpe kotangisa mpinzoli te. 17 Lela na se ya motema, kosala matanga na tina na ye te. Kanga kitendi na moto na yo mpe tia sandale na makolo na yo ; kozipa mandefu ya elongi na yo te mpe kolia bilei ya matanga te, ndenge ezali ezaleli ya bokoko na bino. »
18 Boye, na tongo, nasololaki na bato ; bongo na pokwa, mwasi na Ngai akufaki. Na tongo ya mokolo oyo elandaki, nasalaki kolanda mitindo oyo epesamelaki ngai.
19 Boye, bato batunaki ngai :
— Okoki koyebisa biso te soki makambo oyo ozali kosala elakisi nini ?
20 Nazongiselaki bango :
— Yawe alobaki na ngai : 21 « Yebisa libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosambwisa bosantu ya Esika na Ngai ya bule oyo esalaka lolendo na bino, oyo esepelisaka miso na bino mpe esalaka esengo ya mitema na bino. Bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo botikaki na Yelusalemi bakokufa na mopanga. 22 Boye, bokosala ndenge Ngai nasali : bokozipa mandefu na bino te mpe bokolia bilei ya matanga te ; 23 bokokanga bitendi na mito na bino mpe bokolata basandale na makolo na bino, bokosala matanga te mpe bokolela te, kasi bokomona pasi mpo na masumu na bino mpe bokokoma kolelalela kati na bino. 24 Ezekieli akozala lokola elembo mpo na bino : bokosala ndenge kaka ye asalaki. Tango makambo oyo ekosalema, bokososola ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. ›
25 Bongo yo, mwana na moto ; na mikolo ekoya, nakobotola bandako na bango oyo batonga makasi mpe batielaka motema, oyo esalaka esengo mpe lokumu na bango, oyo esepelisaka miso na bango mpe esalaka esengo ya mitema na bango ; nakobotola lisusu bana na bango ya mibali mpe ya basi. 26 Na mokolo wana, moto moko akokima mpe akoya kopesa yo basango. 27 Na mokolo wana, monoko na yo ekofungwama, okosolola na monoko yango mpe okokanga lisusu yango te. Boye, okozala elembo mpo na bango mpe bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. »