25
Maloba ya kosambisa mokili ya Amoni
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya bato ya Amoni mpe sakola mpo na kotelemela bango. Yebisa bato ya Amoni : ‹ Boyoka liloba na Nkolo Yawe ! Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola bosepelaki tango babebisaki bosantu ya Esika na Ngai ya bule, tango mokili ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te mpe wana bato ya Yuda bakendeki na bowumbu, nakokaba bino na maboko ya bato ya mikili ya este lokola libula, bakotonga milako na bango mpe bakotelemisa bandako na bango ya kapo kati na mokili na bino ; bakolia bambuma na bino mpe bakomela miliki na bino. Nakokomisa engumba ya Raba lopango ya koleisela bashamo, mpe nakokomisa mokili ya bato ya Amoni esika oyo bibwele epemelaka. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozalaki kobeta maboko mpe kotuta makolo na esengo mpo na kotiola mokili ya Isalaele, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo mpe nakokaba yo na maboko ya bikolo ya bapaya lokola bomengo ya bitumba ; nakolongola yo na molongo ya bikolo, nakosilisa bato na yo mpe nakobebisa yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola mokili ya Moabi mpe ya Seiri ezalaki koloba : ‘ Tala, libota ya Yuda ekomi kaka lokola bikolo nyonso. ’ Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko : Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi ; 10 nakokaba Moabi mpe bato ya Amoni na maboko ya Este lokola libula, mpo ete bakanisa lisusu bato ya Amoni te kati na molongo ya bikolo ; 11 nakopesa Moabi etumbu. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
Maloba ya kosambisa mokili ya Edomi
12 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola bato ya Edomi bazongisaki mabe na mabe epai ya libota ya Yuda, mpe lokola bamemaki penza ngambo wana basalaki bongo ; 13 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela Edomi mpe nakoboma bato mpe banyama na yango ; nakobebisa yango, mpe bakokufa na mopanga, kobanda na engumba Temani kino na engumba Dedani. 14 Nakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe na nzela ya bato na Ngai, Isalaele : bakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe, kolanda kanda na Ngai mpe kotomboka na Ngai. Na bongo, bakoyeba solo ete Ngai, nazongisaka mabe na mabe, elobi Nkolo Yawe. ›
Maloba ya kosambisa mokili ya Filisitia
15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Mpo ete bato ya Filisitia bazongisaki mabe na mabe, mpo ete bakokisaki makanisi mabe ya mitema na bango tango balukaki kobebisa mokili ya Yuda, mpo ete bayina bango wuta kala ; 16 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bato ya Filisitia ; nakoboma bato ya Kereti mpe nakobebisa batikali oyo bazalaka pembeni ya ebale monene. 17 Nakozongisela bango mabe na mabe mpe nakopesa bango etumbu na nzela ya kanda na Ngai. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakozongisela bango mabe na mabe. › »