26
Maloba ya kosambisa engumba ya Tiri
Na mobu ya zomi na moko, na mokolo ya liboso ya sanza, Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, lokola Tiri alobaki mpo na kotiola Yelusalemi : ‹ Ozwi ! Ekuke ya bikolo ebukani ! Bikuke na yango efungwami mpo na kotondisa ngai na bomengo ! Lokola esili kobebisama, Ngai sik’oyo, nakofuluka ! › Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh engumba ya Tiri, natombokeli yo ! Nakotindela yo bikolo ebele lokola mbonge ya ebale monene, mpo ete eya kobundisa yo. Bakobuka bamir ya Tiri mpe bakokweyisa bandako na yango ya milayi ; mpe Ngai, nakolongola putulu na yango nyonso mpe nakotika yango mabanga ya pamba. Engumba Tiri ekokoma, kati na ebale monene, esika oyo balobi mbisi bakobanda kotanda minyama na bango mpo na kokawusa yango. Ezali Ngai nde nasili koloba, elobi Nkolo Yawe ; engumba Tiri ekokoma bomengo ya bitumba ya bikolo, mpe bakoboma na mopanga bamboka ya mike-mike oyo ezalaka pembeni ya ebale monene. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Wuta na nor, nakotindela Tiri Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mokonzi ya bakonzi : akoya elongo na bampunda mpe bashar, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpe mampinga monene ya basoda ; akobebisa na mopanga bingumba na yo, oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, akozingela yo, akotimola mabulu ya kobombamela zingazinga ya bamir na yo mpe akotombola banguba na ye mpo na kobundisa yo. Akotindela bamir na yo makonga ya basoda na ye, oyo batambolaka likolo ya bampunda mpe akobuka bandako na yo ya milayi na nzela ya bibundeli na ye ya nguya. 10 Bampunda na ye ekozala ebele penza kino putulu na yango ekozipa yo ; bamir na yo ekoningana na makelele ya bampunda ya bitumba, ya bapine mpe ya shar, tango akokota na bikuke na yo ndenge bato bakotaka kati na engumba oyo bamir na yango ezali na madusu. 11 Makolo ya bampunda na ye ekokota na babalabala na yo nyonso, akoboma bato na yo na mopanga, mpe makonzi oyo esalaka makasi na yo ekokweya na mabele. 12 Bakobotola lokola bomengo ya bitumba bozwi mpe biloko na yo ya koteka, bakokweyisa bamir na yo, bakobuka bandako na yo ya kitoko mpe, na sima, bakobwaka nyonso na ebale : mabanga, mabaya mpe putulu na yo. 13 Nakosukisa makelele ya banzembo na yo, mpe mindule ya lindanda na yo ekotikala koyokana lisusu te. 14 Nakokomisa yo mabanga ya pamba, mpe okokoma esika oyo balobi mbisi bakobanda kotanda minyama na bango mpo na kokawusa yango ; okotikala kotongama lisusu te, pamba te ezali Ngai Yawe nde nalobi, elobi Nkolo Yawe.
15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na Tiri : Boni, bisanga ekolenga te na lokito ya kokweya na yo, na kolela ya bato na yo, oyo bazokisi bango bapota minene mpe na kufa ya somo kati na yo ? 16 Bakambi nyonso ya bisanga bakotika bakiti na bango ya bokonzi, bakolongola banzambala na bango mpe bilamba na bango batonga bililingi na basinga, bakolata somo lokola elamba mpe bakovanda na mabele ; bakokoma kolenga na somo mpe kobanga tango nyonso, mpo na yo. 17 Bakoyembela yo nzembo ya mawa mpe bakoloba :
‹ Oh engumba oyo ekenda sango,
ndenge nini babebisi yo,
engumba ya bato ya ebale monene !
Yo mpe bato na yo,
bozalaki na nguya kati na ebale monene,
bozalaki kolengisa na somo
bato nyonso oyo bazalaki kovanda kuna.
18 Sik’oyo bisanga ekomi kolenga,
na mokolo ya kokweya na yo,
bisanga ya ebale monene ekomi na somo makasi
mpo na suka na yo. ›
19 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tango nakokomisa yo engumba oyo ezalaka lisusu na bato te lokola bingumba oyo etikala nanu kozala na bato te, tango nakoyeisa epai na yo mayi ya mozindo mpe bambonge na yango ekozindisa yo, 20 nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala ; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te ; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi. 21 Nakokomisa yo eloko ya koyoka somo, mpe okokoma eloko pamba ; bakobanda koluka yo kasi bakomona yo lisusu te, elobi Nkolo Yawe. »