27
Loyembo ya mawa na tina na Tiri
Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na Tiri ! Loba na Tiri oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, oyo esalaka mombongo elongo na bikolo nyonso, bavandi ya bisanga : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Oh engumba Tiri, olobaka :
‘ Ngai, nakoka na kitoko na ngai ! ’
Etando na yo ezali kati na bibale minene ;
bato oyo batongaki yo nde bakomisaki yo kitoko makasi.
Basalaki mipanzi na yo nyonso
na mabaya ya sipele oyo ewutaki na Seniri ;
basalaki likonzi ya masuwa na yo
na nzete ya sedele oyo ewutaki na Libani ;
basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni
oyo ewutaki na Bashani ;
basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko
oyo ewutaki na Asiri,
na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi ;
basalaki vwale mpe bendele na yo
na elamba ya lino ya kitoko
oyo ewutaki na Ejipito,
mpe batongaki bililingi kati na yango ;
bakapo na yo ezalaki ya langi ya ble mpe ya motane,
ewutaki na bisanga ya Elisha.
Baluki nkayi na yo bazalaki
bato ya Sidoni mpe ya Arivadi.
Oh Tiri, bato na yo, oyo bazalaki na bwanya koleka,
nde bazalaki kotambolisa yo.
Bampaka ya engumba Gebali mpe bato na yango ya bwanya
nde bazalaki kosala epai na yo
mosala ya kobamba madusu na yo
mpo ete mayi ekota te ;
bamasuwa nyonso ya ebale monene mpe batambolisi na yango
bazalaki koya epai na yo
mpo na kosomba biloko oyo ozalaki koteka.
 
10 Bato ya Persi, ya Ludi mpe ya Puti
bazalaki basoda kati na mampinga na yo :
bazalaki kotia banguba mpe bikoti na bango
na likolo ya bamir na yo ;
bazalaki kosala lokumu na yo.
11 Bato ya Arivadi mpe basoda na yo ya mpiko
bazalaki kotelema na bangambo nyonso ya bamir na yo,
basoda ya Gamadi bazalaki kati na bandako na yo ya milayi :
bazalaki kotia banguba na bango zingazinga ya bamir na yo,
bazalaki kosala ete kitoko na yo ekoma ya kokoka.
12 Bato ya Tarsisi bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele mpe ya lolenge nyonso ; bazalaki komema epai na yo palata, bibende, eten mpe mbodi. 13 Bato ya Yavani, ya Tubali mpe ya Mesheki bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki kopesa yo bawumbu mpe biloko basala na bronze mpo na kosomba epai na yo biloko oyo ozalaki koteka. 14 Bato ya Beti Togarima bazalaki komema epai na yo bampunda ya misala, bampunda ya bitumba mpe bamile. 15 Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bato ya bisanga ebele bazalaki koya kosomba biloko epai na yo, bazalaki kofuta yo na pembe ya nzoko mpe na banzete ya ebeni. 16 Bato ya Siri mpe bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele ; bazalaki komema epai na yo mabanga ya emerode, maputa ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bilamba ya lino ya kitoko, mabanga ya korayi mpe ya ribi. 17 Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo ble ya mboka Miniti, farine oyo basalelaka mikate mpe bagato, mafuta ya nzoyi, mafuta mpe malasi ya solo kitoko, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. 18 Bato ya Damasi bazalaki kosala mombongo elongo na yo, pamba te ozalaki na bambuma ebele mpe na biloko ebele ; bazalaki komema epai na yo masanga ya vino oyo ezalaki kowuta na mboka Eliboni mpe bapwale ya bameme oyo ezalaki kowuta na mboka Tsakari, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. 19 Bato ya Vedani mpe ya Yavani oyo bazalaki kowuta na Uzali bazalaki komema epai na yo bibende oyo balekisa na moto, bibende oyo basalelaka misala ya moto, banzete ya kasia, mpe banzete oyo ebotaka na mayi mpe basalaka na yango malasi, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. 20 Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bilamba ya kitoko oyo batiaka na bampunda. 21 Bato ya Arabi mpe bakambi nyonso ya Kedari bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bana meme ya mibali, bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali. 22 Bato ya mombongo ya Saba mpe ya Raema bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mabanga ya talo ya ndenge na ndenge mpe wolo. 23 Bato ya Arani, ya Kane mpe ya Edeni, elongo na bato ya mombongo ya Saba, ya Asiri mpe ya Kilimadi, bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; 24 bazalaki kosala elongo na yo mombongo ya biloko ya kitoko : bakazaka ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bitoko ya balangi ya ndenge na ndenge mpe mikaba makasi mpe ya kitoko.
25 Bamasuwa minene ya Tarsisi ezalaki komema
biloko na yo ya koteka.
Otondaki meke na biloko
mpe okendeki sango kati na bibale minene.
26 Baluki nkayi na yo bamemaki yo
kino na kati-kati ya bibale minene.
Kasi mopepe ya este ebukaki-bukaki yo
na biteni na kati-kati ya ebale monene :
27 bomengo na yo, biloko na yo ya koteka,
mombongo na yo, baluki nkayi na yo,
bato na yo, oyo basalaka na masuwa,
basali oyo babambaka madusu ya masuwa na yo,
bato oyo basalaka mombongo elongo na yo
mpe basoda na yo nyonso
elongo na lisanga mobimba oyo ezali kati na masuwa,
bakokufa na kati-kati ya bibale minene
na mokolo oyo masuwa na yo ekozinda.
 
28 Tango baluki nkayi na yo bakoganga,
bituka ya ngambo ya ebale monene
ekolenga na somo.
29 Baluki nkayi nyonso mpe bato mosusu
oyo basalaka na masuwa bakosundola masuwa ;
bakotelema na libongo,
30 bakoganga na mongongo makasi
mpe bakolela na mawa nyonso mpo na yo ;
bakomisopela putulu na mito mpe bakomibamba na mabele.
31 Bakomikokola suki ya mito mpe bakolata basaki.
Bakolela yo na mawa na motema
mpe bakomitungisa makasi na mitema.
32 Kati na pasi mpe kolela na bango,
bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo :
‘ Nani azalaki lokola Tiri,
lokola engumba oyo ekomi kimia
kati na ebale monene ? ’
33 Tango biloko na yo ya koteka ezalaki kobima
wuta na ebale monene,
ozalaki kokokisa baposa ya bikolo ebele ;
ebele ya bomengo mpe ya nkita na yo ezalaki kokomisa
bakonzi ya mokili bazwi.
34 Kasi tango sik’oyo bambonge ya bibale minene ebuki-buki yo,
ebwaki yo kati na mozindo ya mayi :
biloko na yo mpe basali na yo nyonso bazindi elongo na yo.
35 Bavandi nyonso ya bisanga bakomi na mawa mpo na yo ;
bakonzi na bango bazali kolenga na somo,
mpe bilongi na bango ebebi likolo ya kobanga.
36 Bato ya mombongo ya bikolo mosusu bakomi
koseka mpe kowolola yo :
Osuki eh ! Osuki ! Okotikala kozala lisusu te ! › »