28
Maloba ya kosambisa mokonzi ya Tiri
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe. Boni, okanisi ete ozali na bwanya koleka Daniele ? Okanisi ete oyebi mabombami nyonso ? Na bwanya mpe na mayele na yo, okomi na bozwi mpe otondisi wolo mpe palata kati na bibombelo na yo. Lokola ozalaki mayele makasi na mosala ya mombongo, oyeisi bomengo na yo ebele makasi ; mpe mpo na bomengo na yo, motema na yo etondi na lolendo. Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozali kokanisa ete ozali na bwanya lokola Nzambe, nakotindela yo bato ya bikolo ya bapaya, bikolo oyo baleki kanza kati na bikolo, mpo ete babundisa yo : bakobimisela yo mipanga na bango mpo na kosambwisa mayele mpe bwanya na yo, bongo bakosambwisa lokumu na yo. Bakokitisa yo kino na libulu, mpe okokufa kufa ya somo kati na bibale minene. Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo. 10 Okokufa kufa ya bato oyo bakatama ngenga te, na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Ngai nde nalobi, elobi Nkolo Yawe. › »
 
11 Yawe alobaki na ngai :
12 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na mokonzi ya Tiri ! Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ozalaki ndakisa mpo na komona nyonso oyo ezali ya kokoka, otondaki na bwanya, mpe ozalaki kitoko koleka. 13 Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe ; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko : ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri ; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo. 14 Napakolaki yo mafuta mpo ete ozala Sheribe oyo abatelaka, oyo mapapu na ye efungwama ; pamba te Ngai nde natiaki yo na ngomba ya bule ya Nzambe ; ozalaki wana, ozalaki kotambola na kati-kati ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto.
15 Etamboli na yo ezalaki ata na pamela moko te wuta mokolo oyo okelama kino tango mabe emonanaki kati na yo. 16 Lokola omonaki ete mombongo na yo emati makasi, okomaki konyokola bato mpe kosala masumu ; mpo na yango, nalongolaki yo na ngomba ya Nzambe mpe nabenganaki yo, sheribe oyo abatelaka, na molongo ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto. 17 Motema na yo etondaki na lolendo mpo na kitoko na yo ; obebisaki bwanya na yo mpo na lokumu na yo. Yango wana, nabwaki yo na mabele mpe nakomisi yo eloko ya liseki na miso ya bakonzi. 18 Mpo na ebele ya masumu na yo mpe mombongo na yo, oyo osalaka na bosembo te, obebisi bosantu ya bisika na yo ya bule ; mpe Ngai, nabimisi kati na yo moto mpo ete etumba yo ; nakomisi yo putulu ya mabele na miso ya bato nyonso oyo bazali kotala yo. 19 Bato ya bikolo nyonso oyo bayebaki yo bakomi na mawa na tina na yo mpo ete okomi eloko ya koyoka somo : suka na yo ezali mabe, ozali lisusu te, okotikala lisusu kozala te ! › »
Maloba ya kosambisa Sidoni
20 Yawe alobaki na ngai :
21 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Sidoni mpe sakola na tina na yango ! 22 Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh Sidoni, natombokeli yo ! Nakomonisa nkembo na Ngai kati na yo ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopesa yango etumbu mpe nakomonisa bosantu na Ngai kati na yango. 23 Nakotindela yango bokono oyo ebomaka, nakotangisa makila na babalabala na yango ; mopanga ekolongwa na bangambo nyonso mpo na koboma bato na yango, mpe bato ebele bakokufa. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
24 Bato ya bikolo ya mayele mabe, oyo bazali lokola basende mpe banzube, bakozingela lisusu bana ya Isalaele te ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe.
Isalaele akovanda na kimia
25 Nkolo Yawe alobi : Tango nakosangisa bana ya Isalaele wuta na bikolo epai wapi napanzaki bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo wana ; boye, bakovanda na mokili na bango moko, mokili oyo napesaki epai ya Jakobi, mosali na Ngai. 26 Bakovanda kuna na kimia, bakotonga bandako mpe bakosala bilanga ya vino ; bakovanda kuna na kimia tango nakopesa etumbu na bikolo nyonso ya bapaya oyo bazingelaki bango mpe bazalaki kotiola bango. Bongo bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. › »