29
Maloba ya kosambisa Ejipito
Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi, Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, talisa elongi na yo epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, sakola mpo na kotelemela ye mpe mokili mobimba ya Ejipito ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo !
Yo dalagona monene oyo ovandaka
kati na bibale na yo,
yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ;
mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’
Nakokanga yo bibende na mbanga,
nakosala ete mbisi ya ebale na yo
ekangama yo na poso ya nzoto ;
nakobimisa yo na libanda ya bibale na yo
elongo na mbisi oyo ekangami yo na poso ya nzoto.
Nakobwaka yo na esobe,
yo mpe mbisi ya bibale na yo.
Okokweya na mabele ya elanga ya polele ;
bakolokota yo te, bakokunda yo te ;
mpe nakokomisa yo bilei ya banyama ya mokili
mpe ya bandeke ya likolo.
Boye, bavandi nyonso ya Ejipito bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
Ozalaki na yo kaka lokola eyekamelo
oyo basala na nzete oyo ebotaka na mayi,
mpo na libota ya Isalaele.
Tango maboko na bango esimbaki yo,
obukanaki mpe ozokisaki mapeka na bango ;
tango balalelaki yo,
obukanaki mpe olembisaki mikongo na bango.
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakoyeisa mopanga mpo na kobebisa yo, mpe nakoboma bato na yo mpe bibwele na bango. Ejipito ekokoma esobe mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
Lokola ozalaki koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; kasi ngai, ngai moko nde namisala, ’ 10 natombokeli yo mpe bibale na yo ; mpe lisusu, nakobebisa mokili ya Ejipito, nakokomisa yango esobe kobanda na Migidoli kino na Siene, kino na bandelo ya mokili ya Kushi. 11 Ata litambe moko ya moto to ya nyama ekolekela lisusu wana te : moto moko te akovanda lisusu kuna mibu tuku minei. 12 Nakokomisa Ejipito esobe kati na mikili oyo ekoma esobe, mpe bingumba na yango ekotikala lisusu na bato te, mibu tuku minei, kati na bingumba oyo ebeba. Nakopanza bato ya Ejipito kati na bikolo mpe nakopalanganisa bango na mikili mosusu.
13 Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Sima na mibu tuku minei, nakosangisa bato ya Ejipito wuta na bikolo epai wapi bapalanganaki, 14 nakokangola bato ya Ejipito oyo bazalaki na bowumbu mpe nakozongisa bango na Patrosi, mokili ya bakoko na bango ; mpe kuna, bakokoma kaka mwa bokonzi moko ya moke. 15 Ejipito ekokoma mokili moko moke koleka mikili mosusu, ekomikumisa lisusu te liboso ya bikolo mosusu ; nakokomisa yango moke penza mpo ete ezala lisusu na makoki te ya kokonza bikolo mosusu. 16 Mokili ya Ejipito ekozala lisusu mpo na bana ya Isalaele mokili ya kotiela motema te, kasi ekokoma lokola ekaniseli ya masumu oyo bato na Ngai bazalaki kosala tango bazalaki koluka lisungi epai na yango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. › »
17 Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, na mobu ya tuku mibale na sambo, Yawe alobaki na ngai :
18 « Mwana na moto, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alendisaki makasi mampinga na ye mpo na kobundisa engumba Tiri ; mito ya basoda nyonso ekomaki mabandi mpe mapeka na bango elongwaki-longwaki baposo. Nzokande, ye mpe mampinga na ye batikalaki kozwa litomba ata moko te na mosala na bango ya kobundisa engumba Tiri. 19 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakokaba Ejipito na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni ; mpe ye, akobotola bomengo na yango, akozwa bomengo ya bitumba mpe akobebisa yango nyonso penza. 20 Napesi epai ya Nabukodonozori mokili ya Ejipito lokola lifuti mpo na misala na ye, pamba te ye mpe mampinga na ye basalaki mpo na Ngai, elobi Nkolo Yawe. 21 Na mokolo wana, nakobimisa liseke mpo na libota ya Isalaele ; nakofungola monoko na yo kati na bango, mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »