30
Nzembo ya mawa mpo na Ejipito
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, sakola ! Loba :
‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Bolela mpe boloba :
‘ Mawa mpo na mokolo wana ! ’
Pamba te mokolo yango ekomi pene ;
mokolo ya Yawe ekomi pene,
mokolo ya mapata, tango ya molili mpo na bikolo.
Mopanga ekotelemela Ejipito,
mpe somo makasi ekokanga mokili ya Kushi.
Tango bato bakokufa na Ejipito,
bakomema bomengo na yango mosika
mpe miboko na yango ekobukana.
Kushi, Puti, Ludi, Arabi mobimba, Libi mpe bato ya mokili ya boyokani bakokufa na mopanga nzela moko na bato ya Ejipito.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Bikolo oyo esanganaki na Ejipito ekokweya
mpe makasi oyo etielaka lolendo ekosila.
Kobanda na Migidoli kino na Siene,
bakokweya na mopanga elongo na Ejipito,
elobi Nkolo Yawe.
Ejipito ekotikala lisusu na bato te
kati na mikili oyo etikala na bato te,
mpe bingumba na yango ekokoma ebeba
kati na bingumba oyo ebeba.
Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe,
tango nakokitisa moto kati na Ejipito
mpe nakosukisa nguya nyonso ya basungi na yango.
Na mokolo wana, bato oyo nakotinda bakokende na nzela ya masuwa mpo na kobundisa Kushi oyo ezali na yango na kimia. Somo makasi ekokanga bango na mokolo ya etumbu ya Ejipito ; mpe mokolo yango ekomi solo pene. 10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa nguya ya mampinga ya Ejipito na nzela ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. 11 Ye elongo na mampinga na ye ya basoda oyo baleki kanza kati na mampinga ya bikolo, bakoya kobebisa mokili. Bakobundisa Ejipito na mipanga na bango mpe bakotondisa mokili na bibembe. 12 Nakokawusa miluka ya Nili mpe nakokaba mokili epai ya bato mabe ; nakobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango na nzela ya maboko ya bapaya. Ezali Ngai Yawe nde nalobi.
 
13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba. 14 Nakobebisa engumba Patrosi, nakotia moto kati na engumba Tsoani mpe nakopesa etumbu na engumba Tebesi. 15 Nakopelisela engumba Sini, ndako batonga makasi ya Ejipito, kanda na Ngai ; mpe nakoboma ebele ya bavandi ya engumba Tebesi. 16 Nakotia moto kati na Ejipito ; engumba Sini ekotonda na pasi. Tebesi ekokoma na madusu ebele mpe banguna bakokota kati na Mefisi na moyi makasi, mpo na kobebisa yango. 17 Bilenge mibali ya bingumba Eliopolisi mpe Pi-Beseti bakokufa na mopanga, mpe bingumba yango ekokende na bowumbu. 18 Na Takipenesi, mokolo ekokoma molili tango nakobuka ekangiseli ya Ejipito ; mpe kuna, makasi na yango oyo etielaka lolendo ekosila ; mapata ekozipa engumba Takipenesi mpe bamboka na yango ya mike ekokende na bowumbu. 19 Nakopesa Ejipito etumbu ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
20 Na mokolo ya sambo ya sanza ya liboso, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai :
21 « Mwana na moto, tala ; nabukaki loboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ! Moto moko te azali kosalisa yango to mpe kotia yango kisi mpo ete ekoka lisusu kozwa makasi ya kosimba mopanga. 22 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli Faraon, mokonzi ya Ejipito ; nakobuka maboko na ye nyonso mibale : ezala loboko oyo ya malamu to loboko oyo ebukana ; mpe nakosala ete mopanga ekweya longwa na loboko na ye. 23 Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu. 24 Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni mpe nakotia mopanga na Ngai kati na loboko na ye. Kasi nakobuka maboko ya Faraon, mpe akokoma kolela liboso na ye lokola moto oyo azoki pota monene.
25 Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni, kasi maboko ya Faraon ekolemba. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakotia mopanga na Ngai kati na loboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobundisa na yango Ejipito. 26 Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »