31
Lisese ya nzete ya sedele
Na mokolo ya liboso ya sanza ya misato, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe na mampinga na ye nyonso :
‹ Nani penza akoki kokokana na yo na lokumu ?
Tala mokili ya Asiri malamu !
Ezalaki lokola nzete ya sedele kati na Libani :
bitape na yango ezalaki kitoko
mpe na makasa ebele oyo ezalaki kopesa pio
koleka banzete nyonso ya zamba ;
elekaki banzete nyonso ya zamba na molayi,
songe na yango ezalaki ekenda kino na mapata.
Mayi ezalaki kokolisa yango,
mpe mayi ya se ya mabele ezalaki koyeisa yango molayi ;
ebimisaki miluka zingazinga ya esika oyo balonaki yango
mpe epanzanaki kino na banzete nyonso ya zamba.
Boye, nzete yango ekomaki molayi makasi
koleka banzete nyonso ya zamba ;
bitape na yango ekomaki milayi,
mpe makasa na yango ekomaki ebele,
pamba te ezalaki kozwa mayi ebele.
Bandeke nyonso ya likolo ezalaki koya
kotonga bazala na bitape na yango,
banyama nyonso ya zamba mpe ezalaki kobota na se ya bitape na yango.
Bikolo nyonso ya minene ezalaki kobika na se ya pio na yango.
Ezalaki kitoko na monene na yango
mpe na molayi ya bitape na yango,
pamba te misisa na yango ezalaki ekita
kino na mayi minene.
Kati na elanga ya Nzambe,
nzete moko te ya sedele ekokanaki na yango,
nzete moko te ya sipele ekokanaki na yango na bitape,
nzete moko te ya platane ekokanaki na yango na makasa :
nzete moko te kati na elanga ya Nzambe ekokanaki
na yango na kitoko.
Nasalaki yango kitoko makasi na bitape ebele ;
bongo banzete nyonso ya Edeni, kati na elanga ya Nzambe,
ezalaki kolula yango.
10 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ekomaki molayi penza, bongo songe na yango ekendeki kino na mapata ; mpe lokola ekomaki na lolendo mpo na molayi na yango, 11 nakabaki yango na maboko ya nkumu ya bikolo mpo ete apesa yango etumbu oyo ekoki na mabe na yango. Nabenganaki yango ; 12 mpe bikolo ya bapaya oyo eleki kanza ekweyisaki yango mpe asundolaki yango ; makasa na yango ekweyaki na bangomba mpe na mabwaku nyonso, bitape na yango ebukanaki mpe ekweyaki na mabulu nyonso ya minene ya mokili. Bikolo nyonso ya mabele ekimaki wuta na se ya pio na yango mpe esundolaki yango ; bongo etikalaki yango moko. 13 Bandeke nyonso ya likolo ekomaki kovanda na mobimbi na yango oyo epola, mpe banyama nyonso ya zamba ekomaki kovanda na bitape na yango. 14 Boye, makambo oyo nyonso esalemaki mpo ete nzete moko te oyo elonama pembeni ya mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango mpe mpo na songe na yango oyo ekenda kino na mapata ; mpe mpo ete terebente moko te oyo ezali kozwa mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango. Pamba te, yango nyonso etangama ete ekokufa, ekokita kino na mokili ya se ya mabele, kati na bakufi, elongo na bato oyo bakitaka na se ya libulu ya kufa.
Kati na libulu
15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo nzete ya sedele ekitaki na se ya mokili ya bakufi, napesaki mitindo ete mayi oyo ya se ya mabele esala matanga mpo na yango. Likolo na yango, nazipaki mayi ya se ya mabele, nakangaki bibale na yango mpe mayi minene ekangamaki ; nazipaki zamba ya Libani na molili mpe nakawusaki banzete nyonso ya elanga. 16 Nalengisaki bikolo na lokito ya kokweya na yango, tango nakitisaki yango na mboka ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu ya kufa. Boye, banzete nyonso ya Edeni, oyo eleki kitoko, mpe banzete ya Libani, oyo eleki kitoko, banzete nyonso oyo ezalaki kozwa mayi malamu, ebondisamaki na se ya mabele. 17 Yango mpe ekitaki, elongo na nzete ya sedele, na mokili ya bakufi, epai ya bato oyo bakufaki na mopanga, oyo basanganaki na yango mpo na kovanda na se ya pio na yango kati na bikolo.
18 Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu ? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele ; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga.
Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › »