32
Nzembo ya mawa na tina na Faraon
Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na mibale, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa mpo na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe yebisa ye :
‹ Ozali lokola nkosi kati na bikolo,
ozali lokola dalagona kati na bibale minene,
otambolaka-tambolaka kati na bibale na yo,
opanzaka mayi na makolo na yo
mpe okomisaka bibale potopoto.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Nakotiela yo motambo na Ngai
tango nakosangisa bato ya bikolo ebele ;
boye bakokanga yo na motambo yango.
Nakobwaka yo na mabele
mpe nakosundola yo na libanda ya bilanga.
Nakosala ete bandeke nyonso ya likolo eya komatela yo
mpe banyama ya mokili mobimba eya kolia
misuni ya nzoto na yo.
Nakopanza misuni ya nzoto na yo na bangomba
mpe nakotondisa mabwaku na biteni oyo ekotikala.
Nakotondisa mokili,
na makila oyo ekowuta epai na yo,
na balabala nyonso kino na bangomba ;
mpe mabulu minene ekotonda na misuni ya nzoto na yo.
Tango nakoboma yo ndenge babomaka mwinda,
nakozipa likolo, nakokomisa molili minzoto na yango ;
nakozipa moyi na mapata,
mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
Likolo na yo,
nakokomisa molili biloko nyonso ya likolo,
oyo ebimisaka pole,
mpe nakoyeisa molili na mokili na yo,
elobi Nkolo Yawe.
Nakotungisa mitema ya bato ebele
tango nakomema yo na bowumbu
kati na bikolo ya bapaya,
na mikili oyo otikala kutu koyeba te.
10 Nakosala ete bato ya bikolo ebele bakamwa yo
mpe bakonzi na bango balenga na somo likolo na yo
tango nakolakisa bango mopanga na Ngai.
Na mokolo ya kokweya na yo,
moko na moko kati na bango akokoma kolenga
tango nyonso mpo na bomoi na ye.
11 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Mopanga ya mokonzi ya Babiloni
ekobundisa yo.
12 Nakosala ete bato ebele bakufa kati na yo
na mopanga ya bilombe ya bitumba
ya ekolo oyo eleki bikolo nyonso na kanza.
Bakosukisa lolendo ya mokili ya Ejipito
mpe bato na yango nyonso bakobebisama.
13 Nakoboma ngombe na yango nyonso
pembeni ya mayi ya mozindo oyo ekoningana lisusu te
na makolo ya bato to ya banyama.
14 Bongo nakosala ete mayi na yango evanda kimia
mpe bibale na yango etiola lokola mafuta,
elobi Nkolo Yawe.
15 Tango nakosala ete Ejipito etikala lisusu na bato te,
tango nakobebisa biloko nyonso
oyo ezali kati na yango
mpe nakoboma bavandi na yango nyonso ;
boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
16 Yango nde nzembo ya mawa oyo bakoyembela Ejipito ; bilenge basi ya bikolo mosusu nde bakoyemba yango, bakoyemba yango na tina na Ejipito elongo na bato na yango nyonso, elobi Nkolo Yawe. »
17 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana kaka, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai :
18 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na bato nyonso ya Ejipito mpe kitisa na mokili ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu, mokili ya Ejipito elongo na bato ya bikolo ya nguya. 19 Loba na bango : ‹ Boni, boleki bato mosusu na nini ? Bokita mpe bolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te ! › 20 Bakokweya kati na bato oyo bakufaki na mopanga.
Mopanga esili kobima !
Tika ete eboma Ejipito mpe bato na yango nyonso !
21 Wuta na mboka ya bakufi,
bankumu bakoloba na Ejipito
mpe na bikolo oyo esanganaki na yango :
‹ Bakiti mpe balali elongo na bato
oyo bakatama ngenga te,
esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga. ›
22 Mokili ya Asiri ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, ezingelami na malita ya bato na yango nyonso oyo babomaki : bango nyonso oyo bakufaki na mopanga. 23 Malita na bango ezali kati na libulu moko ya mozindo, mpe mampinga na yango elali zingazinga ya bakunda na ye. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo na mokili ya bato ya bomoi basili kokweya, bakufi na mopanga.
24 Mokili ya Elami ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango ; bato na yango nyonso bakweyaki, bakufaki na mopanga. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo kati na mokili ya bato ya mokili yango basili kokita elongo na bato oyo bakatama ngenga te, na mokili ya bakufi ; bakoyoka soni bango moko elongo na bato oyo bakitaka na libulu. 25 Basalaki mbeto moko mpo na mokili yango kati na bato oyo bakufaki na mopanga, esika moko na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te. Lokola somo na bango epanzanaki na mokili ya bato ya bomoi, bamemaki soni na bango elongo na bato oyo bakitaka na libulu ; bazali kolala esika moko na bato oyo babomaki na mopanga.
26 Mokili ya Mesheki mpe ya Tubali ezali kuna elongo na bato na yango nyonso, zingazinga ya malita na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te, pamba te bayeisaki somo makasi kati na mokili ya bato ya bomoi. 27 Boni, balali te esika moko na basoda mosusu oyo bakatama ngenga te to balali te esika moko na basoda ya mpiko oyo bakufaki mpe bakitaki na mboka ya bakufi na bibundeli na bango, na mipanga na bango na se ya mito na bango ? Etumbu mpo na masumu na bango ekweyaki na mikuwa na bango, atako bazalaki kolengisa basoda ya mpiko ya mokili ya bato ya bomoi na somo.
28 Oh Faraon, yo mpe okobukana, okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufaki na mopanga !
29 Mokili ya Edomi ezali kuna, bakonzi na yango mpe bakambi na yango balali esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga atako bazalaki na nguya ; balali esika moko na bato oyo bakatama ngenga te mpe bato oyo bakitaka na libulu.
30 Bakambi nyonso ya etuka ya nor mpe bato nyonso ya Sidoni bazali kuna ; bakitaki na soni elongo na bato oyo bakufaki atako nguya na bango ezalaki kopesa bato somo makasi ; balali lokola bato bakatama ngenga te elongo na bato oyo bakufaki na mopanga, mpe bakufaki na soni makasi elongo na bato oyo bakitaka na libulu.
31 Ye Faraon elongo na mampinga na ye nyonso bakomona bango mpe bakobondisama na tina na bato nyonso oyo bakufaki na mopanga, elobi Nkolo Yawe. 32 Atako nayeisaki somo na mokili ya bato ya bomoi na nzela na ye, Faraon mpe bato na ye nyonso bakolala kati na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufa na mopanga, elobi Nkolo Yawe. »