33
Mosakoli Ezekieli : Mosenzeli
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, loba na bandeko na yo mpe yebisa bango : ‹ Soki nabimisi bitumba na mokili moko, bongo bato ya mokili yango baponi moko kati na bango lokola mokengeli na bango ; soki mokengeli yango amoni banguna koya kobundisa mokili na bango mpe abeti kelelo mpo na kokebisa bato.
Soki moto moko ayoki lolaka ya kelelo, kasi azwi yango na pamba mpe mopanga ebomi ye, makila na ye ekotangama na moto na ye moko. Lokola ayokaki lolaka ya kelelo, kasi azwaki likebisi wana na pamba, makila na ye ekotangama na moto na ye moko. Kasi soki azwaki likebisi wana na pamba te, alingaki solo kobikisa bomoi na ye.
Nzokande, soki mokengeli amoni banguna koya mpe abeti kelelo te mpo na kokebisa bato, bongo mopanga ebomi moko kati na bandeko na ye, ndeko wana akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto ya mokengeli. ›
Mwana na moto, nakomisi yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele. Boye, yokaka maloba oyo nakobanda koloba mpo na kokebisa bango na Kombo na Ngai. Soki nalobi na moto mabe : ‹ Oh moto mabe, okokufa solo ! › Mpe yo, olobi na ye eloko moko te mpo ete abongola bizaleli na ye, moto mabe wana akokufa solo mpo na masumu na ye ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
Kasi soki okebisi moto mabe ete abongola bizaleli na ye, bongo asaleli yango te, akokufa solo mpo na masumu na ye ; mpe yo, okobikisa bomoi na yo.
10 Mwana na moto, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala maloba oyo bozali koloba : ‘ Ndenge nini penza tokoki lisusu kobika mpo ete mabe mpe masumu na biso ekomi kilo makasi mpo na biso, mpe yango ekomi kobebisa biso ? ’ ›
11 Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›
12 Mwana na moto, loba na bandeko na yo : ‹ Boyengebene ya moto ya sembo ekobikisa ye te soki asali mabe, mpe mabe ya moto mabe ekokweyisa ye te soki atiki yango ; moto ya sembo akobika te likolo ya boyengebene na ye ya kala soki asali masumu. ›
13 Ata soki nalobi na moto ya sembo ete akowumela solo na bomoi, soki atie elikya na bosembo na ye mpe asali mabe, bosembo na ye nyonso ekotangama lisusu te mpe akokufa mpo na mabe oyo asali. 14 Soki nalobi na moto mabe : ‹ Okokufa solo ; › kasi atiki masumu na ye mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, 15 soki azongisi ndanga oyo asimbaki na niongo mpe biloko oyo ayibaki, soki atosi mitindo oyo epesaka bomoi mpe atiki kosala mabe, akobika penza, akokufa te. 16 Mabe nyonso oyo asalaki ekotangama lisusu te, akobika solo ; pamba te asali oyo ezali alima mpe sembo.
17 Bandeko na yo bazali koloba : ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te. › Nzokande, nzela na bango moko nde ezalaka mabe. 18 Soki moto ya sembo atiki boyengebene na ye mpe akomi kosala mabe, akokufa mpo na mabe yango. 19 Soki moto mabe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, akobika solo mpo ete asali bongo. 20 Oh bino, libota ya Isalaele, ndenge nini bokoki penza koloba : ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te ! › Solo, nakosambisa moko na moko kati na bino kolanda etamboli na ye ! »
Ndimbola ya kobebisama ya Yelusalemi
21 Na mokolo ya mitano ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi na mibale ya bowumbu na biso, moko kati na bato oyo babikaki na Yelusalemi ayaki epai na ngai mpe alobaki : « Babebisi engumba ! » 22 Nzokande, na pokwa, liboso ete moto yango aya epai na ngai, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai mpe afungolaki monoko na ngai liboso ete moto yango akoma epai na ngai na tongo. Monoko na ngai efungwamaki mpe nakomaki koloba. 23 Bongo Yawe alobaki na ngai :
24 « Mwana na moto, bavandi ya bisika oyo ebeba kati na mokili ya Isalaele bazali koloba : ‹ Abrayami azalaki kaka ye moko tango azwaki mokili lokola libula ; nzokande biso, tozali ebele ; boye, solo, mokili epesameli biso lokola libula ! › 25 Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula ! 26 Bozali kotia elikya na mopanga na bino, bozali kosala makambo ya mbindo, mpe moko na moko kati na bino azali kokomisa mbindo mwasi ya moninga na ye, mpe bozwa penza mokili lokola libula ! ›
27 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na Kombo na Ngai, bato oyo batikali na bisika oyo ebeba bakokufa na mopanga ! Ba-oyo bazali na mboka, nakokaba bango epai ya banyama ya zamba mpo ete eboma bango ! Mpe ba-oyo babombami kati na bandako batonga makasi mpe kati na madusu ya mabanga bakokufa na bokono oyo ebomaka ; 28 nakokomisa mokili libebi mpe nakosala ete etikala lisusu na bato te : nakosukisa lolendo na yango, bangomba ya Isalaele ekotikala lisusu na bato te, mpe bato bakotika kolekela wana. 29 Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakokomisa mokili libebi mpe esobe, likolo ya makambo na bango nyonso ya mbindo oyo bazali kosala. ›
30 Mpo na yo, mwana na moto, bandeko na yo bazali kolobana bango na bango na bamir mpe na bikuke ya bandako na bango na tina na kombo na yo : ‹ Boya koyoka maloba oyo ewuti epai na Yawe ! › 31 Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko. 32 Mpo na bango, ozalaka na yo kaka lokola moto oyo ayembaka malamu banzembo ya kitoko, na mongongo ya kitoko, mpe abetaka mindule kitoko ; pamba te bayokaka na bango maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te.
33 Tango makambo oyo nyonso ekokokisama —mpe ekokokisama solo— bakososola penza ete mosakoli moko azalaki kati na bango. »