Etinda ya kotonga Mongombo
25
Makabo mpo na kotonga Mongombo
Yawe alobaki na Moyize :
— Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu.
 
Tala makabo oyo okozwa na maboko na bango :
 
wolo, palata mpe bronze,
bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi,
lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,
baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale,
banzete ya akasia,
mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda,
biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko ;
mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
 
Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango. Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo.
Sanduku ya Boyokani mpe mofinuku
10 Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano. 11 Okobamba yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Okolatisa mpe songe na yango na wolo. 12 Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu. 13 Okosala mabaya mibale na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo. 14 Okokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya sanduku, mpo na komemela yango. 15 Mabaya yango ekotikala libela kati na bapete ya sanduku : bakolongola yango te. 16 Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.
17 Okosala mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. 18 Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. 19 Okotia ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe mosusu, na suka mosusu. Okokangisa bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale. 20 Mapapu ya basheribe ekozala ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bakozala ngambo na ngambo, mpe miso na bango ekotala mofinuku. 21 Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku. 22 Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli ; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele.
Mesa ya mapa oyo babonzeli Nzambe
23 Okosala mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. 24 Okobamba yango wolo ya peto mpe okotia lisusu wolo na pembeni na yango. 25 Okozingela mesa yango na libaya oyo ekozala na basantimetele pene mwambe na monene, mpe okotia wolo na pembeni ya libaya yango. 26 Okosala bapete minei ya wolo mpe okotia yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezali. 27 Bapete ekozala pene ya libaya oyo ekozingela mesa, mpe bakokotisa kati na bapete yango mabaya ya komemela sanduku. 28 Okosala na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa mpe okobamba yango wolo. 29 Okosala na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga. 30 Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai.
Etelemiselo ya minda
31 Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko. 32 Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda esengeli kozala na bitape motoba : misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu. 33 Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, okotia bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. 34 Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, esengeli kozala na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. 35 Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ekozala na mbuma moko ; mpe ekozala bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda. 36 Bambuma mpe bitape ekozala ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso ekosalema na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto. 37 Okosala minda sambo oyo okotia na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete epesa pole na etando oyo ezali na liboso ya etelemiselo. 38 Okosala na wolo ya peto bibende oyo bazwelaka makala ya moto mpe basani ya putulu. 39 Okosalela bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso. 40 Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba.