27
Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani*,
nyoka oyo ekimaka,
na Leviatani, nyoka ya somo,
na nzela ya mopanga na Ye ya minu,
mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya ;
akoboma elima ya ebale monene.
Na mokolo wana, bakoloba :
« Boyemba nzembo mpo na nzete ya vino ya kitoko :
Ngai Yawe, nabatelaka yango,
nasopelaka yango mayi tango nyonso,
nakengelaka yango butu mpe moyi
mpo ete moto moko te abebisa yango.
Nazali lisusu na kanda te.
Ah, soki ezalaki kaka na banzube
mpe na basende mpo na kobundisa Ngai,
nde natambolaki likolo na yango na bitumba
mpe nabwakaki yango nyonso na moto.
Kasi tika ete bakimela epai na Ngai
lokola ndako batonga makasi,
tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ;
solo, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ! »
 
Na mikolo oyo ekoya, Jakobi akozwa misisa,
Isalaele akobimisa bafololo mpe mito,
mpe akotondisa mokili na bambuma na ye.
 
Boni, Yawe abetaki ye te
ndenge abetaki bato oyo babetaki ye ?
Boni, abomaki ye te
ndenge abomaki bato oyo babomaki ye ?
Apesaki bango etumbu na kotelemela mpe na kobengana.
Alongolaki bango na mopepe na Ye ya makasi,
kaka na mokolo moko ya mopepe na Ye ya este.
 
Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama,
mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye :
akobuka mabanga nyonso ya etumbelo
mpo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka ;
mpe likonzi moko te ya Ashera
to etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala.
Engumba oyo basundola
10 Engumba ya makasi etikali pamba
lokola lopango oyo basundola,
babosana mpe etikala pamba lokola esobe ;
mwana ngombe ya mobali ekokoma kolia mpe kolala kuna,
bongo ekolia ata makasa ya bitape na yango.
11 Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ;
basi bakoya kotia yango na moto.
Mpo ete bato oyo bazangi mayele,
yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te,
Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.
Kozonga ya monene
12 Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino. 13 Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene ; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi.
* 27:1 Leviatani ezali elima monene ya mayi. Ezali elembo ya mabe oyo eleka ndelo, mpe elembo ya Ejipito.