28
Mawa na bakambi ya Efrayimi mpe ya Yuda
Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi
mpe na fololo ekawuka,
fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango,
oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko,
na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino
bazalaki kosalela lolendo !
Tala, Nkolo azali na elombe moko ya nguya mpe ya makasi,
elombe yango azali lokola mvula ya mabanga
mpe mopepe oyo ebebisaka ;
azali lokola mvula ya makasi mpe mpela ya somo,
akokweyisa na makasi engumba yango na mabele.
Motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi
ekonyatama na makolo ;
mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango
na moto ya lubwaku ya kitoko
ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso
oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge :
soki kaka moto amoni yango,
akobuka mpe akomela yango mbala moko.
Na mokolo wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga,
akozala motole ya lokumu mpe elembo ya kitoko
mpo na ndambo ya bato na Ye ;
akopesa makanisi ya bosembo
epai na ye oyo avandi mpo na kosambisa,
mpe akozala mopesi makasi
epai na bato oyo babenganaka na bitumba kino na ekuke.
Basambisi oyo balangwaka masanga
Mpe lisusu, Banganga-Nzambe mpe basakoli bapengwi
mpo na masanga ya vino ;
masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ;
masanga epengwisi bango, vino ebungisi bango,
masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ;
bakomi kobunga na bimoniseli na bango,
bakomi kokata makambo na ndenge esengeli te.
Bamesa nyonso etondi na bisanza ya nkele ;
esika ya malamu etikali lisusu te.
 
Azali nani, ye oyo azali koluka koteya ?
Alingi kolimbola bimoniseli na ye epai ya banani ?
Epai ya bana oyo balongoli na mabele,
bana oyo bakati bango mabele ?
10 Pamba te ezali nde
« Bilobaloba ya pamba*. »
11 Solo, Nzambe akoloba na bato oyo
na nzela ya likukuma mpe na lokota ya bapaya ;
12 alobaki na bango :
« Tala esika ya kopema !
Tika ete moto oyo alembi apema ; »
mpe : « Tala esika ya kimia, »
kasi balingaki koyoka te.
13 Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango
se bilobaloba ya pamba
mpo ete, wana ezali bango kotambola,
bakweya na ndenge ya sima,
babukana mikongo,
bazwama na mitambo mpe bakangama.
Moboko ya malamu
14 Yango wana, bino batioli oyo bozali kokamba bato ya Yelusalemi,
boyoka Liloba na Yawe !
15 Bozali koloba : « Tosalaki boyokani elongo na kufa,
boyokani elongo na mboka ya bakufi.
Tango likama ya makasi ekoya,
ekozwa biso te ;
pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso
mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso. »
 
16 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
« Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona,
libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako,
libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ;
moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye
akotikala kobanga te.
17 Nakotia bosembo lokola singa oyo bamekelaka molayi
mpe boyengebene lokola singa ya mbodi ;
mvula ya mabanga ekokombola ekimelo na bino ya lokuta,
mpe mayi ekozindisa ebombamelo na bino.
 
18 Boyokani na bino elongo na kufa ekobebisama,
boyokani oyo bosalaki elongo na mokili ya bakufi ekolonga te ;
tango likama ya makasi ekokomela bino,
ekobebisa bino penza nye.
19 Tango makambo nyonso oyo ekoya,
ekobebisa bino ; pamba te ekoleka na tongo nyonso,
na moyi nyonso mpe na butu nyonso. »
 
Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi.
20 Boye, ndenge balobaka na lisese :
« Mbeto eleki mokuse mpo na kominyolusa,
mpe bulangeti eleki moke mpo na komizipa nzoto ; »
21 Yawe akotelema ndenge atelemaki na ngomba Perasimi,
akotomboka ndenge atombokaki na lubwaku ya Gabaoni
mpo na kosala mosala na Ye,
mosala na Ye oyo ya kokamwa,
mpe kokokisa mosala na Ye,
mosala ya kokamwa oyo esalema nanu te.
22 Sik’oyo, botika maseki na bino,
noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ;
pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano
ya kobebisa mokili mobimba.
Bwanya oyo ezanga suka
23 Bofungola matoyi mpe boyoka mongongo na ngai,
bosala keba mpe boyoka malamu
makambo oyo nazali koloba !
24 Boni, ezali tango nyonso nde mosali bilanga abalolaka mabele,
akataka mikala mpe atimolaka mabele mpo na kolona ?
25 Sima na kobongisa esika ya kolona,
boni, akoki te kolona nkona ya nijeli to kobwaka kumini ?
Boni, akoki te kolona ble na esika oyo ebongi,
mpe orje, na esika oyo ekoki ;
mpe epotele, na bandelo ya elanga na ye ?
26 Nzambe na ye ateyaka ye
mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.
27 Pamba te basalelaka te mabaya ya kilo,
oyo mpunda ebendaka mpo na kobuka nijeli
to bapine ya shar mpo na kobuka kumini ;
basalelaka nde lingenda mpo na kobuka nijeli mpe kumini.
28 Esengeli konika ble mpo na kosala mapa ;
nzokande babetaka yango tango nyonso te,
balekisaka nde bapine ya shar na likolo na yango
mpe mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka,
kasi banikaka yango te.
29 Nyonso wana mpe ewuti epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,
oyo mabongisi na Ye ezali ya kitoko makasi
mpe bwanya na Ye ezali monene.
* 28:10 Na lokota ya Ebre ezali Saw lasaw, qaw laqaw, zeer sham, zeer sham. Elingi koloba : pasi likolo ya pasi, elikya likolo ya elikya, moke awa, moke kuna.