50
Lisumu ya Isalaele mpe botosi ya Mosali
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Wapi mokanda ya koboma libala
oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ?
To natekaki bino epai ya nani
oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ?
Botekamaki mpo na masumu na bino ;
mpe libala ya mama na bino ekufaki
mpo na botomboki na bino.
Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ?
Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ?
Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ?
Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ?
Na pamela na Ngai,
nakawusaka ebale monene,
nakomisaka bibale esobe ;
mbisi na yango ekomaka kolumba solo
mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.
Nalatisaka likolo elamba ya mwindo
mpe nazipaka yango na bilamba ya saki. »
 
Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli,
mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba
moto oyo alembi ;
alamusaka ngai tongo nyonso,
alamusaka litoyi na ngai
mpo ete nayoka lokola moyekoli.
Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi,
mpe ngai natiaki moto makasi te ;
namizongisaki sima te.
Napesaki mokongo na ngai
epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai,
matama na ngai, epai ya bato
oyo bazalaki kopikola ngai mandefu.
Nabombaki elongi na ngai te
na kotiolama mpe na basoyi.
Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai,
nakoyokisama soni te.
Yango wana, nakomisi elongi na ngai
makasi lokola libanga,
mpe nayebi ete nakoyokisama soni te.
Ye oyo alongisaka ngai azali pene,
nani akokoka kotelemela bosembo na ngai ?
Tika ete tosamba elongo !
Nani akofunda ngai ete tosamba na ye ?
Tika ete apusana pene na ngai !
Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai ;
nani akolonga ngai na esambiselo ?
Tala, bango nyonso bakokweya
lokola bilamba ya kala oyo ebeba,
bongo nseka ekolia bango.
 
10 Ezali na moto kati na bino
oyo atosaka Yawe
mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye,
bongo atambola kati na molili
mpe atikala komona pole te ?
Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe
mpe atalela Nzambe na ye.
11 Kasi sik’oyo, bino nyonso oyo bopelisi moto
mpe bosimbi bakoni oyo ezali kopela moto,
bokende, botambola na pole ya moto na bino
mpe ya bakoni oyo bopelisi.
Tala oyo bokozwa na maboko na ngai :
Bokokufa na pasi !