17
Nzoto ya Yesu ebongwani
(Mlk 9.2-10; Lk 9.28-36)
Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi. Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole. Mbala moko, bamonaki Moyize mpe Eliya bazali kosolola na Yesu.
Petelo alobaki na Yesu :
— Nkolo, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya !
Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »
Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi kino na mabele mpo ete somo makasi ekangaki bango. Kasi Yesu apusanaki pene na bango, asimbaki bango mpe alobaki :
— Botelema, bobanga te !
Batombolaki miso mpe bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu.
Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo :
— Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
(Mlk 9.10-13)
10 Bayekoli batunaki Yesu :
— Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ?
11 Yesu azongisaki :
— Solo, Eliya asengeli koya mpe akozongisa makambo nyonso na molongo. 12  Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.
13 Bayekoli basosolaki ete azalaki kolobela bango na tina na Yoane Mobatisi.
Yesu abikisi mwana na molimo mabe
(Mlk 9.14-29; Lk 9.37-43)
14 Tango bakomaki pene ya esika oyo ebele ya bato bazalaki, moto moko apusanaki pene na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe alobaki :
15 — Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi. 16 Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye.
17 Yesu alobaki :
— Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
18 Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.
19 Bongo bayekoli bakendeki na nkuku epai ya Yesu mpe batunaki :
— Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ?
20 Yesu azongiselaki bango :
— Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [ 21  Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.]*
Yesu alobeli kufa mpe lisekwa na Ye
(Mlk 9.30-32; Lk 9.43-45)
22 Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile ; Yesu alobaki na bango :
— Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, 23  bakoboma Ye, mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.
Bayekoli bayokaki mawa mingi.
Yesu mpe Petelo bafuti mpako
24 Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki :
— Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te ?
25 Petelo azongisaki :
— Afutaka !
Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye :
— Simona, okanisi nini ? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili : bana na bango to bapaya ?
26 Petelo azongisaki :
— Bapaya.
Yesu alobaki na ye :
— Lokola ezali bongo, bana mboka basengeli kofuta te. 27  Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.
* 17:21 Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.